Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yehova aza’ na ngai

Yehova aza’ na ngai

Zwá:

  1. 1. Ntɔngɔ etani mpe na mibongisi.

    Nasambeli Yehoba mpe nabimi.

    Baboyi nateya nakotosa te.

    Nakotosa se Nzambe na nga’.

    (MONDIMO)

    Lokola mai ya mpiɔ na ntango’a moi, motema kimya.

    Yehova aza’ na ngai nakobanga te!

    Yehova aza’ na ngai nakobanga te!

  2. 2. Nazongi ndako moko esili

    Nasololaki na moto moko

    Azalaki na mposa ya lisungi

    Nasambeli Nzambe asalisa ye!

    (MONDIMO)

    Lokola mai ya mpiɔ na ntango’a moi, motema kimya.

    Yehova aza’ na ngai nakobanga te!

    Yehova aza’ na ngai nakobanga te!

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Maloba na ye eza’ kopela,

    Na kati na ngai, ezo’tinda

    Ngai nateya na mpiko mpenza

    Nakokoba tii ntango nsuk’ekoya.

    Nakolanda ndakis’a bandeko,

    Mpe nakokolisa kondima

    Nakotyela Yehova motema,

    Nakozela mokili’a sika.

  3. 3. Na butu liboso mpongi eya,

    Napesi Yehova mersi mingi.

    Nayebi oy’ekoya lobi te,

    Kasi Nzambe na ngai akosunga.

    (MONDIMO)

    Lokola mai ya mpiɔ na ntango’a moi, motema kimya.

    Yehova aza’ na ngai nakobanga te!

    Yehova aza’ na ngai kobang’eza’ te.