Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zalá na mpiko mpe zalá na makasi

Zalá na mpiko mpe zalá na makasi

Zwá:

  1. 1. Tɔngɔ mpenza,

    Molili’eza’,

    Alamuki’asɛngi

    Mpo na bana mpe

    Bandeko na ye:

    “Tata, tózala sembo.”

    Ata misala mingi,

    Simbá oyo, tiká oyo,

    Ye, kaka boboto;

    Nzemb’oyo, na nse ya motema:

    (MONDIMO)

    ‘Nakolendis’o.

    Kobanga n’o te.

    Nakosunga yo.

    Nakozala na yo.’

    Zalá na mpiko mpe

    Zalá makasi,

    Nde “akosunga yo,

    Okozwa makasi.”

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Akei koluka,​—

    Kobundabunda,​—

    Ayebi te oy’akozwa.

    Baninga na ye

    Batikaka ye te,

    Yango, abangaka te.

  2. 2. Neti mpongo

    Na likoló,

    Atandi mapapu.

    Makambo’ebele​—

    Kasi ngonga moke.​—

    Aleli epai ya Nzambe.

    Nzoto mingai mpe mpasi​—

    Azosala nyonso’ekoki.

    Makasi’azwaka

    Na nzemb’oyo eza’ na motema:

    (MONDIMO)

    ‘Nakolendis’o,

    Kobanga n’o te.

    Nakosunga yo.

    Nakozala na yo.’

    Zalá na mpiko mpe

    Zalá makasi,

    Nde “akosunga yo,

    Okozwa makasi.”

    “Ɛɛ, akosunga yo,

    Okozwa makasi.”