Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 105

“Nzambe azali bolingo”

“Nzambe azali bolingo”

(1 Yoane 4:7, 8)

  1. 1. Nzambe azali bolingo,

    Alobi tólinga mpe.

    Oy’alingi Yah mpe bato,

    Akosala ebele.

    Bomoi elɛngi mingi,

    Soki bolingo’ezali.

    Bolingo oyo ya Kristo,

    Bámona biso n’ango.

  2. 2. Soki olingi mateya

    ya Nzambe, tosá yango.

    Y’olobi olingi Nzambe,

    Bong’olingi bato te?

    Bolingo ndeko’a boboto,

    Nkanda te, zuw’eza’ te.

    Lingá bandeko makasi.

    Okozwa mapamboli.

  3. 3. Kopesa nkanda nzela te;

    Ekang’o na nkingo te.

    Talelá nde Tata Nzambe;

    Landá mibeko oyo:

    Lingá Nzambe mpe moninga,

    Bolingo, yango wana.

    Tólinga lokola Nzambe,

    Tósepela na bato.