Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 114

‘Tózala na motema molai’

‘Tózala na motema molai’

(Yakobo 5:8)

  1. 1. Yehova Nzamb’aboyá

    Básambwisa nkombo na ye.

    Aza’ mpenza na mposa

    Asantisa nkombo yango.

    Kasi’akangi motema

    Mbula mpenza ebele;

    Azeli lelo, lobi,

    Aza’ kolɛmba te.

    Mokano na y’ezali

    tóbika, tótika mabe.

    Motema molai’oyo

    Ebikisi bato’ebele.

  2. 2. Esɛngi mpe na biso,

    Motema molai lelo.

    Motem’ekozwa kimya,

    Tokosilika noki te.

    Tokoboya komona

    Se mabe ya baninga.

    Tokokanga motema

    Ntango likambo’eyei.

    Motema molai mpe

    bizaleli nyonso’a Nzambe,

    Soki toza’ na yango,

    Tolandi lokolo na ye.