Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 28

Tózala baninga ya Yehova

Tózala baninga ya Yehova

(Nzembo 15)

  1. 1. Ee Yah, moninga n’o

    Eza’ nani, Nkolo?

    Nani’akofanda n’hema na yo?

    Nani ayebi yo?

    Eza’ oy’ayambi

    Solo, andimi yo,

    Moto nyons’oyo aza’ sembo,

    Oy’atosaka yo.

  2. 2. Ee Yah, moninga n’o

    Eza’ nani, Nkolo?

    Nani’akoya pembeni na yo?

    Nani moto na yo?

    Oy’akumisi yo,

    Mpe abangaka yo,

    Moto’a maloba mibale te,

    Mpe ya lokuta te.

  3. 3. Mikumba na biso,

    Toz’obwakela yo.

    Na bolingo, obendi biso,

    Oz’osunga biso,

    Zalá moninga koo.

    Moninga ya seko.

    Moninga neti yo aza’ te,

    Mpe akozala te.