Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 43

Libondeli ya kopesa matɔndi

Libondeli ya kopesa matɔndi

(Nzembo 95:2)

  1. 1. Yah, yo boboto, tokumisi yo.

    Totɔndi yo na libondeli’oyo.

    Tokomipesa na mosala n’o,

    Mpo toyebi oz’osunga biso.

    Mabunga na biso ez’ebele.

    Nkolo, limbisá, kolandela te.

    Mersi mpo Yesu’akufelá biso.

    Mpe oyebi bolɛmbu na biso.

  2. 2. Mersi na bolingo oza’ n’ango.

    Okómisi biso baninga n’o.

    Teyá biso, Nkolo, tóyeba yo.

    Lakisá biso kozala sembo.

    Matɔndi mpo na elimo na yo.

    Mpo n’ango toz’oteya na mpiko.

    Tómikitisa, tósalela yo;

    Biso, bato mpamb’olingi biso.