Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 52

Komipesa mpe batisimo

Komipesa mpe batisimo

(Baebre 10:7, 9)

  1. 1. Lokola Yehov’akelá

    Molɔ́ngɔ́ mobimba,

    Biloko nyonso’eza’ ya ye,

    Na lola mpe na nse.

    Apesi mpema ya bomoi;

    Lokol’eza’ bongo,

    Bikelamu nyonso ebongi

    Básambela kaka ye.

  2. 2. Yesu abatisamaki,

    Esɛngaki bongo.

    Ayebisi Nzambe boye:

    ‘Nayei mosala n’o.’

    Ntango ye abimi na mai,

    Atyami mafuta.

    Alaki Nzambe:

    ‘Nakosala, Tata, oy’olingi nde.’

  3. 3. Yehova, toy’epai na yo,

    Mpo tókumisa yo.

    Tomiboyi, tomipesi

    Na mabɔkɔ na yo.

    Opesaki Mwana na yo;

    Asombaki biso.

    Tondimi’ata kokufela yo,

    Yah, tomipesi na yo.