Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 77

Pole na mokili ya molili

Pole na mokili ya molili

(2 Bakorinti 4:6)

  1. 1. Na ntango ya molili’oyo,

    Pole moko’engɛngi.

    Eza’ koyebisa bato

    Ntɔngɔ ebɛlɛmi.

    (MONDIMO)

    Nsango ya Bokonzi

    Engɛngi neti mwinda.

    Epesi elikya​—

    Eza’ komonisa

    Butu’ekómi na nsuka​—

    Ntɔngɔ’ez’oya.

  2. 2. Balali, nsoso eleli;

    Bálongwa na mpɔngi.

    Toza’ kolendisa bango.

    Nzambe, sungá bango.

    (MONDIMO)

    Nsango ya Bokonzi

    Engɛngi neti mwinda.

    Epesi elikya​—

    Eza’ komonisa

    Butu’ekómi na nsuka​—

    Ntɔngɔ’ez’oya.