Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

Kosalisa bato na mokili mobimba báyeba kotánga mpe kokoma

Kosalisa bato na mokili mobimba báyeba kotánga mpe kokoma

Agostinho oyo afandaka na Brésil alobi: “Nakolaki na ferme moko na mboka, tozalaki babola mpenza. Nasengelaki kotika kelasi mpo na kosala mpe kosalisa libota na biso.” Kaka ntango Agostinho akómaki na mbula 33 nde ayekolaki kotánga mpe kokoma. Alobi: “Koyekola kotánga mpe kokoma esalisi ngai namimona ete nazali na valɛrɛ.”

Agostinho azali moko ya bamilio ya bato oyo Batatoli ya Yehova bayekolisi kotánga mpe kokoma na boumeli ya bambula 70 oyo eleki. Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka bongo? Litomba nini bato bazwaka mpo na yango?

Ezali mpasi moto ayekola makambo soki ayebi te kotánga mpe kokoma

Na mobu 1935, Batatoli ya Yehova bazalaki kosakola na mikili 115. Mpo na kosakwela bato oyo bazalaki koloba minɔkɔ ekeseni, bamisionɛrɛ bazalaki kotya badiskur ya Biblia oyo etyamaki na kasɛti, mpe na mabaku mosusu bazalaki kopesa mikanda na minɔkɔ ya mboka. Bato mingi bazalaki na mposa makasi ya koyekola Biblia, kasi ezalaki mpasi mpo mingi na bango bayebaki te kotánga mpe kokoma.

Lokola bato yango bayebaki te kotánga Biblia bango moko, bazalaki mpenza koyeba te kosalela batoli na yango. (Yosua 1:8; Nzembo 1:2,3) Ezalaki mpasi mpo bákokisa mikumba na bango ya bokristo. Na ndakisa, soki baboti bayebi kotánga te, ekozala mpasi báteya bana na bango makambo oyo Biblia eteyaka. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Batatoli ya sika oyo bayebaki kotánga te, bazalaki kokoka te kosalela Biblia ntango bazalaki koluka koteya basusu.

Kampanye ya kolakisa bato kotánga mpe kokoma

Na bambula ya 1940 mpe ya 1950, Nathan H. Knorr mpe Milton G. Henschel, mibale kati na baoyo bazalaki kokamba mosala ya Batatoli ya Yehova, bakendeki na mikili ndenge na ndenge mpo na kobongisa mosala ya kosakola. Na mikili oyo bato mingi bayebaki kotánga te, balendisaki babiro ya filiale ya mikili yango báfungola biteyelo na masangá.

Mokanda ya koyekola kotánga ebimi na liyangani moko na Chingola, na Zambie na 1954

Babiro ya filiale etindaki malako na masangá mpo na ndenge ya kotambwisa biteyelo yango. Na bikólo mosusu, guvɛrnema ebongisaki baprograme mpe babuku oyo Batatoli bakokaki kosalela. Na ndakisa, na Brésil, guvɛrnema etindelaki biro ya filiale bisaleli ná babuku, mpe biro ya filiale etindaki yango na masangá. Na mikili mosusu, Batatoli bango moko nde basengelaki kobongisa programɛ mpo na kotángisa bato.

Mibali mpe basi, bilenge mpe mibange bakokaki kokota biteyelo yango. Mokano na yango ezalaki ya kolakisa bayekoli bátánga monɔkɔ na bango ya mboka, atako lisangá moko esengelaki kotángisa na minɔkɔ ebele.

Programɛ oyo esalisi bato

Litomba nini bato bazwaki na programɛ ya koyekolisa kotánga mpe kokoma? Motatoli moko oyo azalaka na Mexique alobi: “Sikoyo nakoki koyeba malamumalamu makambo oyo Biblia elobi mpe ezali kosimba motema na ngai. Koyeba kotánga esalisi ngai nasolola na baninga na nga ya kartye kozanga kobanga, nayebisi bato ebele nsango ya Biblia.”

Programɛ ya koyekolisa kotánga mpe kokoma esukaki kaka te na kosalisa bato báyeba Biblia malamumalamu. Isaac oyo azalaka na Burundi alobi: “Koyekola kotánga mpe kokoma esalisi ngai nayekola mosala ya kotonga. Kotonga ekómá mosala na ngai, mpe nazali sikoyo kokamba misala minene ya botongi.”

Bazali kotángisa monɔkɔ ya Chichewa na Ndako ya Bokonzi na Lilongwe, na Malawi na 2014

Jesusa oyo azalaka na Pérou azalaki na mbula 49 ntango akɔtaki eteyelo ya koyekola kotánga mpe kokoma. Alobi: “Lokola nazali mama ya ndako, nasengelaki komona ntalo mpe nkombo ya biloko oyo ezali na zando. Liboso, nazalaki mpenza kokoka te. Kasi lelo oyo, na lisalisi ya eteyelo ya koyekola kotánga mpe kokoma, nakómá kosala wenze kozanga kobanga.”

Na boumeli ya bambula, bakonzi ya bikólo ndenge na ndenge bapesaki Batatoli ya Yehova longonya mpo na mosala oyo basalaki ya koyekolisa bato kotánga mpe kokoma. Lelo, Batatoli ya Yehova bazali kokoba koyekolisa bato kotánga mpe kokoma na lisalisi ya baprogramɛ mpe bisaleli oyo ebongisami lisusu malamu na boumeli ya bambula. Bakomaki mpe babimisaki lisusu mwa babuku pene na milio 224 na minɔkɔ 720 mpo na kosalisa baoyo batángá mingi te. *

^ par. 11 Na ndakisa, mwa buku “Omipesa na kotánga mpe kokoma” ezali na minɔkɔ 123 mpe mwa buku Yoká Nzambe ezali na minɔkɔ 610.