Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

Batatoli ya Yehova ya Nouvelle-Zélande bazali bakristo ya kimya mpe babangaka Nzambe

Batatoli ya Yehova ya Nouvelle-Zélande bazali bakristo ya kimya mpe babangaka Nzambe

Na mokolo ya 21/10/1940, mikonzi ya Nouvelle-Zélande balobaki ete Batatoli ya Yehova bazali ebongiseli moko oyo ekɔtisaka mobulu mpe ebebisaka kimya ya bato. Atako likambo yango ebimiselaki Batatoli ya Yehova mikakatano mingi, balɛmbaki nzoto te. Na ndakisa, bakobaki kosala makita ata bakonzi bokokaki koya kokanga bango.

Andy Clarke azalaki Motatoli ya Yehova te, kasi mwasi na ye Mary, azalaki Motatoli ya Yehova. Andy amonaki ndenge mwasi na ye akobaki kaka koyangana na makita atako ezalaki likama. Azalaki kobanga bákanga mwasi na ye mpo azalaki kokende na makita. Andy apekisaki mwasi na ye te kokende na makita, kasi ye moko akómaki koyangana na makita elongo Mary mpe ayebisaki ye: “Soki bakokanga yo, basengeli mpe kokanga ngai!” Banda wana, Andy azalaki koyangana na makita nyonso ná mwasi na ye. Na nsima, azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli. Atako Batatoli ya Yehova banyokwamaki na Nouvelle-Zélande na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mingi na bango lokola Mary, batikalaki sembo epai ya Nzambe.

Bokoli na kati ya bolɔkɔ

Mokolo moko, bapolisi bakangaki John Murray oyo azali na mbula 78 ntango azalaki kokende ndako na ndako mpo na koyebisa bato mateya ya Biblia. Tribinale elobaki ete azali kopesa mabɔkɔ na ebongiseli oyo ezali kokɔtisa mobulu. Batatoli ya Yehova mingi basengelaki kosamba na batribinale; basusu bafutaki lomande mpe basusu bakɔtaki bolɔkɔ mpo na sanza misato.

Batatoli baboyaki kosala mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia. (Yisaya 2:4) Yango wana, na ntango ya etumba, banyokolaki mingi na bango ntango bazalaki kotinda bango na makasi bakóma basoda. Batatoli ya Yehova soki 80 oyo baboyaki kosala mosala ya soda, batindamaki na bakaa ya bakangami na boumeli ya etumba. Kuna na bolɔkɔ, atako bazalaki konyokola bango mpe ezalaki eleko ya malili makasi, bandeko yango bakobaki kosambela Yehova na esengo.

Ntango kaka bakómaki na bakaa ya bakangami, Batatoli ya Yehova yango babandaki mbala moko kosala makita mpe kosakola. Bazalaki kosala makita pɔsɔ na pɔsɔ mpe bazwaki bibongiseli mpo na kosakwela bakangami mosusu, kaka ndenge esalemaka na lisangá. Na bakaa mosusu, bapesaki Batatoli ndingisa ya kosala mayangani, kasi esengelaki soda akɛngɛla bango. Bakangami mosusu bayekolaki Biblia na bakaa mpe bazwaki batisimo kaka kuna.

Batatoli na bolɔkɔ bazali kosala Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Bruce, mwana mobali ya nsuka ya Mary ná Andy, oyo tolobelaki liboso, amonaki ete kozala na bolɔkɔ epesaki ye libaku ya koyeba lisusu mingi makambo ya Biblia. Alobi: “Mpo na ngai, ezalaki lokola nazali kokende kelasi, mpo nakokaki kosolola mingi na bandeko oyo bakɔmeli, oyo bazalaki na bakaa mpe koyekola makambo mingi epai na bango nyonso.”

Na 1944, guvɛrnema ezwaki ekateli ya kobimisa bato mosusu oyo bazalaki na bolɔkɔ. Kasi, bakonzi ya basoda baboyaki ekateli yango mpo bayebaki ete soki Batatoli ya Yehova babimi, bakokoba koteya bato makambo ya Biblia. Lapolo ya basoda moko elobaki: “Ata soki bakaa ezali mbala mosusu kosala ete tólandela bato oyo bakangamá na bindimeli na bango, yango ekoki soki moke te kosilisa kondima na bango.”

Babebisaka kimya ya bato te

Lokola epekiseli esalaki ete nsango ya Batatoli ya Yehova epanzana, bato mosusu balukaki koyeba makambo mingi ya Batatoli ya Yehova. Nsima ya mwa ntango, bato mingi bayaki koyeba ete Batatoli ya Yehova babebisaka kimya ya bato te. Bayebaki ete Batatoli basalaka bato mabe te mpe bazali bakristo ya kimya. Yango wana, motángo ya Batatoli ya Yehova na Nouvelle-Zélande emataki; na 1939 bazalaki 320 mpe na 1945 bakómaki 536!

Na bantango mosusu, bakonzi ya Leta, oyo bazalaki bato malamu, balobaki ete bipekiseli oyo batyelaki Batatoli ya Yehova ezalaki sembo te. Nsima ya koyoka bifundeli oyo bapesaki mpo na ndeko mobali moko oyo azalaki kosakola, zuzi moko aboyaki kokweisa ndeko yango. Alobaki: “Koloba ete moto abuki mobeko mpo azali kokabola Babiblia, ezali likambo oyo nakoki kondima te mpo eyokani te na makanisi na ngai mpe na ndenge oyo natalelaka mibeko.”

Ntango balongolaki bipekiseli na nsuka ya etumba, Batatoli bayebisaki na molende bato nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Na 1945, biro ya filiale etindelaki masangá nyonso ya Nouvelle-Zélande mokanda. Mokanda yango elobaki: “Biso nyonso tosengeli kozala na mayele, na esengo mpe na boboto epai ya bato nyonso. Tóboya kowelana mpe kobendana na bato. Tóbosana te ete bato oyo tokutanaka na bango bandimaka mateya ya mangomba na bango mpe balukaka kosalela yango. . . . Mingi na bango bazali ‘bampate’ ya Nkolo oyo tosengeli komema epai ya Yehova mpe na bokonzi na ye.”

Lelo oyo, Batatoli ya Yehova ya Nouvelle-Zélande bazali kokoba koyebisa nsango ya Biblia na bato ya mboka bango mpe na bapaya oyo bayaka kotala mboka na bango. Mokolo moko, na engumba Turangi, na boumeli ya bangonga, Batatoli 4 basakwelaki bato 67 oyo bautaki na mikili 17!

Emonani polele ete bato ya Nouvelle-Zélande bandimi ete Batatoli ya Yehova bazali bakristo ya kimya oyo bandimaka makambo oyo Biblia eteyaka mpe basalaka makasi ya kotosa yango na bomoi na bango. Mbula na mbula, bato ebele bazwaka batisimo mpo na kokóma Batatoli ya Yehova. Na 2019, Batatoli koleka 14 000 basalelaki na esengo nyonso Yehova na Nouvelle-Zélande.

Likita ya boyekoli ya Biblia oyo esalemaki na ntango ya epekiseli na 1940

Esika oyo bazalaki kotya moto moko na kaa ya bakangami, na nɔrdi ya Esanga, na Nouvelle-Zélande

Kaa ya bakangami ya Hautu, na nɔrdi ya Esanga, na Nouvelle-Zélande

Na 1949, etuluku ya Batatoli oyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki kosala mosala ya soda