Ndenge oyo bazalaki kosalela bakashɛ na ntango ya kala
Na ntango ya kala kashɛ ezalaki elembo moko ya moke oyo bakomá mpe bazalaki kosalela yango mpo na kotya sinyatire, mingimingi likoló ya mwa mabele ya lima to mafuta oyo ekangamá (cire). Bakashɛ yango ezalaki na lolenge mingi na ndakisa, mwa nsɔngɛ, kare, molai, ezala mpe mitó ya nyama. Elilingi oyo ezalaki na kashɛ ezalaki komonisa soki mokanda batindi euti epai ya nani mpe soki ezali solo, longola yango, bazalaki kotya kashɛ yango likoló ya biloko mpo moto mosusu afungola yango te, na ndakisa, likoló ya saki, porte ya lilita to baporte mosusu.
Bazalaki kosala kashɛ yango na bisaleli mingi na ndakisa, mokuwa, mabanga, ebende, mabanga ya mwa ntalo to libaya. Ntango mosusu bazalaki kokoma nkombo ya nkolo-eloko mpe ya tata na ye na kashɛ yango. Bakashɛ mosusu ezalaki na titre ya nkolo na yango.
Mpo na komonisa ete mokanda moko ezali solo, nkolo-kashɛ asengelaki kofina kashɛ yango likoló ya mwa mabele ya lima to mafuta oyo ekangamá (cire), mpe bazalaki kokangisa yango na mokanda. (Yobo 38:14) Na nsima soki mabele yango ekauki ezalaki kokóma makasi, na yango moto akokaki te kobongola kashɛ oyo batye likoló ya mokanda yango.
Bazalaki mpe kosalela bakashɛ mpo na kopesa moto bokonzi
Bakokaki kopesa kashɛ epai ya moto mosusu mpo na komonisa ete nkolo-kashɛ yango apesi ye bokonzi. Yango nde Farao, mokonzi moko ya Ezipito na ntango ya kala asalaki epai ya Yozefe, mwana ya Yakobo. Yozefe azalaki moombo na Ezipito, mpe babwakaki ye na bolɔkɔ atako asalaki mabe moko te. Na nsima, Farao abimisaki ye na bolɔkɔ mpe akómisaki ye mokonzi ya mibale na Ezipito mobimba. Biblia elobi boye: “Na yango, Farao alongolaki lopɛtɛ na ye ya kotya bilembo na lobɔkɔ na ye mpe atyaki yango na lobɔkɔ ya Yozefe.” (Ebandeli 41:42) Lokola lopɛtɛ ya kotya bilembo ezalaki na kashɛ ya mokonzi, Yozefe azwaki bokonzi ya kokokisa mokumba ya ntina mingi oyo bapesaki ye.
Na Yisraele ya kala, mwasi-mokonzi Yezabele asalelaki lopɛtɛ ya kotya bilembo ya mobali na ye na mwango mabe oyo asalaki mpo na koboma Nabote. Yezabele asalelaki nkombo ya mokonzi Akabe mpo na kokoma mikanda mpe atindelaki bankulutu mosusu mikanda yango mpo na kosɛnga bango ete bákosela Nabote makambo ete alakeli Nzambe mabe. Atyaki kashɛ ya mokonzi likoló ya mikanda yango mpe mwango na ye ya mabe elongaki.—1 Bakonzi 21:5-14.
Ahasueruse, mokonzi ya Perse asalelaki lopɛtɛ na ye ya kotya bilembo mpo na komonisa ete mitindo nyonso eutaki epai na ye.—Estere 3:10, 12.
Nehemia, mokomi moko ya Biblia alobaki ete bankumu ya Yisraele, balevi, mpe banganga-nzambe bamonisaki ete bandimaki boyokani oyo ekomamaki na mokanda na ndenge batyaki bakashɛ na bango na mokanda yango.—Nehemia 1:1; 9:38.
Biblia elobeli mabaku mibale oyo emonisi ntango oyo basalelaki bakashɛ mpo na kobatela baporte. Ya liboso ezalaki ntango babwakaki mosakoli Danyele na libulu ya bankɔsi, “bayaki na libanga moko mpe batyaki yango na monɔkɔ ya libulu yango.” Na nsima, Dariuse, mokonzi ya Media mpe ya Perse, “atyaki elembo likoló na yango na lopɛtɛ na ye ya kotya bilembo mpe na lopɛtɛ ya kotya bilembo ya bato minene na ye, mpo eloko moko te ebongwana na ekateli oyo bazweli Danyele.”—Danyele 6:17.
Ntango batyaki nzoto ya Yesu Kristo na lilita, banguna na ye “bakendaki kobatela lilita yango mpe batyaki elembo na libanga” mpe babalolaki libanga yango mpo moto moko te akɔta kuna. (Matai 27:66) David Turner, moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia, alobaki mpo na mokanda ya Matai ete soki ezalaki kashɛ oyo eutaki epai ya guvɛrnɛrɛ Moroma, “kashɛ yango ekokaki kozala oyo basali na mabele ya lima to na mafuta oyo ekangamá (cire) mpe batyaki yango na katikati ya. . . libanga mpe monɔkɔ ya lilita.”
Lokola bakashɛ ya kala ekoki kosalisa biso tóyeba makambo mingi oyo esalemá kala, bato ya arkeoloji mpe ya istware bazali kolandela yango malamumalamu. Na yango, bolukiluki na makambo etali bakashɛ babengi sigillographie, ekómi na motuya mingi mpenza lelo oyo.