Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Pawel Gluza/500Px Plus/Getty Images

BÓSƐNZƐLAKA!

Bomoi ya banyama na zamba mpe banzete ebebi makasi na boumeli ya mbula 50​Biblia elobi nini?

Bomoi ya banyama na zamba mpe banzete ebebi makasi na boumeli ya mbula 50​Biblia elobi nini?

 Na mokolo ya 09/10/2024, ebongiseli moko na nkombo (World Wildlife Fund) ebimisaki lapolo moko ya mabe mpenza oyo emonisi ndenge makambo oyo bato bazali kosala ezali kobebisa bomoi ya banyama mpe banzete. Lapolo yango emonisaki ete “na boumeli ya bambula koleka 50 oyo euti koleka (1970-2020), motángo ya banyama ekiti na 73% koleka ndenge ezalaki liboso.” Lapolo yango epesaki likebisi oyo: “Tolekisi ndelo te na koloba ete makambo oyo ekosalema na boumeli ya bambula mitano oyo ekoya, ekomonisa ndenge bomoi ya bato ekozala awa na mabele na mikolo ezali koya.”

 Balapolo ya ndenge wana ezali kopesa bato mpasi na motema. Tolingaka mabele esika tofandi mpe tosepelaka te komona ndenge bato bazali konyokola to koboma banyama mpe kobebisa banzete kaka mpamba. Toyokaka bongo mpo Nzambe apesaki biso mokumba ya kobatela banyama.​—Ebandeli 1:27, 28; Masese 12:10.

 Yango wana, okoki komituna boye: ‘Tokokoka mpenza kobatela banyama mpe banzete? Biblia elobi nini?’

Elikya mpo na mikolo ezali koya

 Ata soki tosali nyonso mpo na kobatela banyama, kaka Nzambe nde akoki mpenza kobatela yango. Na Emoniseli 11:18, Biblia esakolaki ete Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’ Vɛrsɛ yango eteyi biso makambo mibale:

  1.  1. Nzambe akopesa bato nzela te mpo bábebisa mabele na mobimba na yango.

  2.  2. Mosika te Nzambe akozwa ekateli. Ndenge nini toyebi yango? Mpo lelo oyo, banyama mpe banzete ezali mpenza na likama koleka ndenge ezalaki liboso.

 Nzambe akosala nini mpo na kosilisa mokakatano yango? Akosalela guvernɛma na ye ya likoló, to mpe Bokonzi na ye, mpo eyangela mabele mobimba. (Matai 6:10) Guvernɛma yango ekopesa bato ya botosi mateya mpe formasyo oyo basengeli na yango mpo na kobatela banyama mpe banzete.​—Yisaya 11:9.