Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

kovop58/stock.adobe.com

BÓSƐNZƐLAKA!

Masano ya Olympique ekoki mpenza kosala ete bato bázala na bomoko?—Biblia elobi nini?

Masano ya Olympique ekoki mpenza kosala ete bato bázala na bomoko?—Biblia elobi nini?

 Na masano ya Olympique ya eleko ya molunge ya 2024, bato soki miliare mitano na mokili mobimba bazali kotala basani (athlètes) oyo bauti na mikili 206. Thomas Bach, oyo azali prezida ya komite ya olympique ya mokili mobimba alobi boye: “Tosangani na molulu moko oyo esangisi bato ya mokili mobimba mpe esali ete tózala na kimya.” Abakisi lisusu boye: “Tiká tósepela na kimya mpe na bomoko oyo euti na masano yango ata soki tokeseni na makambo mingi.”

 Masano ya Olympique ekoki mpenza kosala ete bato bázala na kimya mpe na bomoko? Mokolo mosusu bato bakozala mpenza na kimya ya solosolo mpe na bomoko?

Masano yango ememaka mpenza kimya mpe bomoko?

 Masano ya Olympique ya mbula oyo esukaki kaka na kosala masano te. Makambo mingi ya bomoi oyo ekabolaka bato, ata mpe makambo ya politiki, emonani mingi na masano yango. Na ndakisa makambo etali ntomo ya moto, koyina bato ya loposo to ya lingomba mosusu, mpe koponapona bilongi.

 Ezali solo ete masano lokola ya Olympique esalaka ete bato bálekisa bantango ya malamu. Kasi yango emonisaka mpe makambo mingi oyo etyaka bokabwani na esika ya kosangisa bato to mpe kotya kimya.

 Biblia esakolaki bizaleli ya bato oyo esalaka ete kotya kimya na mokili ekóma mpasi. (2 Timote 3:1-5) Mpo na koyeba makambo mingi oyo etali esakweli yango, tángá lisolo “Biblia esakolaki makambo oyo bato bazali kokanisa mpe kosala lelo oyo?

Kimya ya solosolo mpe bomoko mpo na mokili mobimba

 Biblia epesi elikya ya solo mpo na kimya mpe bomoko ya mokili mobimba. Elaki ete bato nyonso na mokili bakozala na bomoko na nse ya guvernɛma ya likoló oyo ebengami “Bokonzi ya Nzambe.”​—Luka 4:43; Matai 6:10.

 Yesu Kristo, oyo azali Mokonzi ya Bokonzi yango, akotya kimya na mokili mobimba. Biblia elobi:

  •   “Bato ya sembo bakokola lokola matiti ya sika, mpe kimya ekokóma mingi.”​—Nzembo 72:7.

  •   “Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi . . . Akobikisa bango na monyoko mpe na mobulu.”​—Nzembo 72:12, 14.

 Ata mpe lelo oyo, mateya ya Yesu ezali kosala ete bamilio ya bato na mikili 239 bázala na bomoko. Lokola bazali bakristo, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bayekoli kozala na kimya na moto nyonso. Mpo na koyeba yango, tángá zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobi “Koyinana ekoki kosila?.”