Mikanda ya kala emonisi mpenza esika ekólo moko ya Yisraele ezalaki
Biblia elobi ete ntango Bayisraele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka mpe bakabolaki yango na mabota na bango, bana zomi ya libota ya Manase bazwaki libula na bango na ngámbo ya wɛsti ya Yordani, bakabwanaki na mabota mosusu oyo etikalaki. (Yosua 17:1-6) Ezali nde na makambo ya arkeoloji oyo endimisi likambo yango?
Na mobu 1910, mwa biteni ya mbɛki oyo bakomá likolo na yango na Ebre emonanaki na Samaria. Mwa biteni ya mbɛki yango oyo babengi ostraca, ezalaki na makomi na monɔkɔ ya Ebre, batyaki yango na ndako ya mokonzi na esika batyaka biloko ya motuya mingi na ndakisa vinyo to mpe mafuta kitoko ya kopakola na nzoto. Na nyonso ezalaki ostraca 102 oyo ezwamaki, ezalaki kuna kobanda siekle ya 8, kasi kaka na 63 mpamba nde okoki komona malamu makambo bakomi likolo na yango. Kasi, na biteni 63 ya mbɛki yango okoki komona badati, bankombo ya mabota, mpe bankombo to makambo etali bato oyo bazalaki kotɛka biloko ná ya baoyo bazalaki kosomba biloko.
Likambo ya kokamwa, bankombo ya mabota nyonso oyo ekomami na mbɛki ostraca ya Samaria ezali ya bato ya libota ya Manase. Biblia moko NIV Archaeological Study Bible, emonisi ete ba-ostraca wana “emonisi boyokani na oyo Biblia elobi mpo na esika oyo bana ya Manase bakendaki kofanda.”
Ba-ostraca ya Samaria endimisi lisusu likambo oyo Amose mokomi ya Biblia akomaki mpo na bato ya bozwi ya ntango wana, akomaki boye: “Bato oyo bazali komɛla na basaani ya vinyo, mpe oyo, na mafuta ya malamu koleka.” (Amose 6:1, 6) Mbɛki ya ostraca ya Samaria endimisi biso ete biloko ya bongo ezalaki esika bato ya mabota nzomi ya Manase bazalaki kofanda.