Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Left: Olena Yefremkina/stock.adobe.com; center: lunamarina/stock.adobe.com; right: Rido/stock.adobe.com

BÓSƐNZƐLAKA!

Nani okoki kotyela motema?​—Biblia elobi nini?

Nani okoki kotyela motema?​—Biblia elobi nini?

 Bato balɛmbaka nzoto ntango bato oyo bakanisaki ete babongi kotyelama motema basali makambo oyo ebongi te. Bato mingi batyaka lisusu motema te na . . .

  •    bakonzi ya politiki oyo balukaka libosoliboso bolamu na bango moko kasi ya bana-mboka te.

  •    bapanzi-nsango oyo bapesaka bansango oyo ebongi te mpe ya sikisiki te.

  •    bato ya siansi oyo basalaka makambo ya malamu mpenza te mpo na bato.

  •    bakonzi ya mangomba oyo bapesaka mpenza mabɔkɔ na makambo ya politiki na esika bázala bamonisi ya Nzambe.

 Bato basengeli koyeba banani oyo basengeli mpenza kotyela motema. Biblia epesi biso likebisi oyo ete:

  •    “Bótya mitema na bakonzi ya mokili te; po nguya ya bato ekoki kobikisa té.”​—Nzembo 146:3; Bible na Lingala ya lelo oyo.

Moto oyo okoki kotyela motema

  Biblia emonisi moto oyo okoki kotyela motema: Yesu Kristo. Azalaki kaka te moto malamu oyo azalaki na bomoi eleki sikoyo basiɛklɛ mingi. Nzambe atyaki Yesu “ayangela lokola Mokonzi . . . , mpe Bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33) Yesu azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema oyo ezali koyangela sikoyo kuna na likoló.​—Matai 6:10.