Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Bansango ya solo oyo ekómisaka kondima makasi

Bansango ya solo oyo ekómisaka kondima makasi

01/12/2021

 Batatoli ya Yehova bakanisaka mpenza bandeko na bango bakristo. (1 Petro 2:17) Mingi kati na biso bamiyokaka lokola Tannis, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Kenya. Alobi boye: “Nalingaka kozwa bansango ya bandeko mibali mpe bandeko basi na mokili mobimba.” Ndenge nini Tannis mpe bamilio ya Batatoli ya Yehova bayebaka makambo oyo bandeko na bango bazali kokutana na yango na mokili mobimba? Banda 2013, tozali koyeba makambo yango na nzela ya eteni Bansango oyo ezali na site na biso, jw.org.

 Bansango yango epesaka balapolo ya solo oyo etali Batatoli ya Yehova na makambo lokola kobimisa ya Babiblia, kosunga bandeko oyo bakutani na makama, mosala ya botongi, mpe makambo mosusu ya minene. Eyebisaka biso makambo ya bandeko oyo bakangi na babolɔkɔ mpo na kondima na bango. Eteni Bansango elobelaka mpe masolo ya kolendisa oyo etali mosala ya kosakola mpe Ekaniseli. Banani balukaka bansango oyo ekotyama mpe ndenge nini babongisaka yango?

Ndenge baponaka mpe babimisaka bansango

 Bandeko oyo basalaka na Biro ya kozwa bansango (OPI) nde babongisaka eteni Bansango. Departema yango ezali na biro monene ya Batatoli ya Yehova mpe Komite ya bakambi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde etambwisaka mosala na yango. Departema yango ezali na bandeko koleka 100, mibali ná basi, oyo mingi kati na bango bapesaka mabɔkɔ na mosika, ezala bandeko oyo bakomaka masolo, baoyo basalaka bolukiluki, baoyo babongisaka bililingi na baordinatɛrɛ, mpe babongoli. Bamosusu bakendaka kokutana na bakonzi ya guvɛrnema, ya bainiversite, mpe bapanzi-nsango. Departema yango esalaka elongo na Babiro ya kozwa bansango na ekólo (PID) koleka 80 oyo ezali na bafiliale ndenge na ndenge na mokili mobimba.

 Mpo na kobongisa nsango moko ya sika, OPI esalaka na boyokani na PID ya bikólo ndenge na ndenge. Soki bandeko bamoni ete esengeli kobimisa nsango moko boye, basalaka bolukiluki mpo na lisolo yango mpe balukaka koyeba bosolo na yango. Yango ekoki kosɛnga ete básala mituna-lisolo na bato mpe básolola na bato oyo bayebi makambo yango malamu. Nsima ya kosangisa makambo nyonso, bakomaka lisolo yango, babongisaka yango lisusu, batángaka yango, batyaka bafɔtɔ, mpe batindaka nyonso wana na Komite ya Bakambi mpo endimama.

Maloba ya botɔndi

 Ndenge nini bandeko bayokaka mpo na eteni Bansango? Cheryl, ndeko mwasi moko na Philippines, alobi boye: “Mikolo nyonso na ntɔngɔ, nasepelaka kotánga naino bansango oyo etali ebongiseli ya Yehova mpe bato na ye.”

 Bato mingi balobi ete bamonaka bokeseni kati na bansango oyo ebimaka na eteni Bansango na jw.org mpe bansango mosusu. Tatiana, na Kazakhstan, alobi boye: “Nazali na botɔndi ndenge nakoki kondima bansango oyo ebimaka na jw.org. Elobelaka makambo ya solo mpe ya sikisiki.” Alma, ndeko mwasi moko na Mexique alobi boye: “Na kokesana na bansango ya mabe oyo toyokaka, totángaka mpe totalaka, bansango oyo ebimaka na jw.org elendisaka mpenza.”

 Makambo oyo ebimaka na eteni Bansango ezali ya solo, mpe ekómisaka kondima makasi. Bernard, na Kenya, alobi boye: “Eteni Bansango esalisi ngai namonaka bandeko ya mokili mobimba ete bazali mpenza libota na ngai, ata soki bafandaka wapi. Nakoki kotánga bankombo na bango mpe kolobela mpenza makambo na bango na mabondeli na ngai.” Bybron, ndeko mwasi moko oyo afandaka mpe na Kenya, alobi: “Nayokaka ntango nyonso esengo soki namoni lisolo moko oyo elobi ete Biblia ebimi na monɔkɔ moko boye! Masolo yango esalisaka ngai nabosana te ete Yehova aponaka bilongi te.”

Eteni Bansango esalisaka biso tósalaka mabondeli ya sikisiki mpo na bandeko oyo bazali kokutana na mikakatano na mokili mobimba

 Ata masolo oyo elobeli minyoko oyo bandeko bazali kokutana na yango ekoki kolendisa biso. Ndeko mwasi Jackline na Kenya alobi boye: “Kokanisa mpiko na bango elendisaka mpenza kondima na ngai. Nalukaka ntango nyonso komona makambo oyo esalisaka bango báyika mpiko. Namoni ndenge makambo ya ‘mindɔndɔ te’ na ndakisa kobondela, kotánga Biblia, ata mpe koyemba, esalisaka mpenza bandeko na biso bákoba kozala makasi.”

 Beatriz, ndeko mwasi moko na Costa Rica asepelaka na bansango oyo elobelaka makama oyo ebimaka yango moko. Alobi boye: “Eteni Bansango esalisaka ngai namona ndenge ebongiseli na biso esalaka nokinoki, ebongisaka makambo malamu mpenza mpe na bolingo mpo na kosunga bandeko.Yango endimisaka ngai ete oyo ezali mpenza ebongiseli ya Yehova.”

 Tozali na botɔndi mpenza ndenge tozwaka bansango ya sika oyo etali bandeko na biso ya mokili mobimba! Yango ezali kosalema bongo mpo na makabo na bino ya bolingo malamu, oyo mingi epesamaka na nzela ya donate.pr418.com. Matondi mingi mpo na makabo na bino.