Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Banzembo oyo esalaka ete tópusana penepene na Nzambe

Banzembo oyo esalaka ete tópusana penepene na Nzambe

01/11/2021

 Miziki ezali likabo oyo euti epai ya Yehova. Ekoki kobongola makanisi na biso, kosalisa biso tókóma na esengo, mpe ekoki kotinda biso tósala likambo boye to boye. Banzembo na biso oyo ebimaka na baemisyo ya sanza na sanza ezalaka na bopusi wana epai na biso. Kutu, banzembo yango ekoki kosala likambo mosusu ya ntina mingi: kosalisa biso tópusana penepene na Yehova.

 Kobanda 2014, banzembo yango koleka 70 esili kobima, mpe sikoyo banzembo yango ezali na minɔkɔ koleka 500! Kasi okoki komituna boye, ‘Banani nde basalaka banzembo yango, mpe mosala nini esalemaka mpo na kobimisa yango?’

Ndenge oyo bandeko basalaka banzembo yango

 Bandeko oyo basalaka na departema ya audio/video nde basalaka banzembo yango mpe Komite ya mateya ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde ekambaka mosala yango. Ekipi ya bandeko 13, basi mpe mibali nde ebongisaka banzembo yango, elandelaka makambo etali volimi ya banzembo yango, programɛ na yango mpe makambo mosusu. Longola yango, Komite ya mateya endimi mpe ete bandeko oyo basalaka na mosika na mokili mobimba bapesaka mabɔkɔ na mosala yango. Na kati ya bandeko yango, tokoki kotánga bandeko oyo babongisaka banzembo yango, baalanga-nzembo, mpe bayembi. Na komikitisa nyonso, bandeko yango basalelaka makoki na bango mpe balukaka te bato bákumisa bango mpo na mosala oyo basalaka.

 Ndenge nini banzembo yango ebongisamaka? Ya liboso, Komite ya mateya ekataka soki nzembo yango esengeli kosimbama na mokapo nini ya Biblia mpe mayoki oyo nzembo yango esengeli kobimisa epai ya bayoki na yango. Na nsima, bandeko oyo basalaka na ekipi yango, bapesaka mokumba na bandeko oyo basengeli kobongisa nzembo yango mpe kokoma maloba na yango. Na nsima, basalaka mwa enregistrement ya nzembo yango. Komite ya mateya eyokaka lisusu mwa enregistrement yango mpe epesaka bandeko oyo bazali na ekipi yango mwa makanisi. Na nsima, ekipi yango ebongisaka nzembo yango mpe esalaka enregistement ya nsuka. Enregistrement ya banzembo yango esalemaka na bisika ndenge na ndenge, na ndakisa, na bafiliale mpe na bandako ya bandeko epai bisaleli mpo na kosala enregistrement ezali.

 Bandeko basalelaka bisaleli ndenge na ndenge mpo na kokoma mpe kosala enregistrement ya banzembo yango. Basalelaka mpe bibɛtɛlo ya miziki mpe bisaleli mosusu, na ndakisa bamikro mpe bikoliseli-lolaka. Mikro yango mokomoko ekoki kosɛnga dolard 100 to mpe dolard koleka 1000. Na ndakisa, na 2020 tosalelaki dolard 16 000 mpo na kosomba bisaleli ya kosala enregistrement ya banzembo.

 Milende nini tozali kosala mpo tosalelaka mbongo ya makabo na mayele? Na esika ya kosalela ekipi moko monene ya bandeko na Betele mpo na kosala banzembo yango, tozali nde kosalela bandeko mingi oyo bapesaka mabɔkɔ na mosika. Longola yango, na esika ya kobengisaka bandeko mingi esika moko mpo na kosala enregistrement ya banzembo, tozali nde kosala yango na nzela ya video.

“Banzembo yango esalisaka ngai nakoba kozala makasi na elimo”

 Bandeko basi mpe mibali basepelaka koyoka banzembo mosusu oyo ebimaka na baemisyo ya sanza. Ndeko mwasi Tara, oyo afandaka na Allemagne alobi boye: “Banzembo yango esalisaka ngai namiyoka malamu ntango nazali komitungisa. Koyoka banzembo yango na monɔkɔ ya mboka na ngai ezalaka nde lokola Yehova azali koyamba ngai.” Dmitry, ndeko mobali moko oyo afandaka na Kazakhstan alobi boye: “Ntango nazali koyoka banzembo yango, nazalaka motema ya kokita mpo nayebaka ete banzembo yango ekotinda ngai te nasala makambo ya mabe lokola banzembo mosusu ya mokili. Kutu, banzembo yango esalisaka ngai nde natye makanisi na ngai nyonso na makambo ya elimo.”

 Delia, oyo afandaka na Afrique du Sud alobeli ndenge oyo amiyokaka mpo na banzembo yango, alobi boye: “Banzembo yango esalisaka ngai nakoba kozala makasi na elimo. Ntango nazali na mawa to ntango nakutani na likambo moko ya mpasi, ezalaka ntango nyonso na nzembo moko oyo eyokanaka mpenza na likambo oyo nazali kokutana na yango. Mbala mingi, ndenge kaka mayoki oyo nzembo moko ebimisaka, lokito ya nzembo moko mpe ekoki kobongola ndenge oyo nazali komiyoka!”

 Bandeko balingaka mingi mpenza banzembo mosusu oyo ebimá na baemisyo ya sanza. Lerato, oyo afandaka mpe na Afrique du Sud alobi boye: “Banzembo lokola ‘Yango oyo na miso’ mpe ‘Na mokili ya sika’ esalisaka ngai namona na makanisi ntango oyo nakoyamba lisusu mama na ngai oyo akufá. Mbala nyonso oyo nayokaka banzembo yango, namonaka lokola azali koya mbangu mpo na koyamba ngai.”

 Moko ya banzembo yango esalisaki elenge mwasi moko ya mbula 16 oyo afandaka na Sri Lanka. Alobi boye: “Molakisi na ngai ya siansi alobelaki ngai mabe liboso ya bana-kelasi mosusu mpo nazali Motatoli ya Yehova. Nabangaki mpe nayebaki te naloba nini. Ntango nazongaki ndako, mama na ngai alendisaki ngai nayoka nzembo ‘Koyekola epesaka mpiko.’ Nzembo yango esalisaki ngai nasala bolukiluki mpo nazwa eyano ya kopesa. Mokolo oyo elandaki, nasololaki na molakisi na ngai. Ayokaki ngai na likebi mpe ayebisaki ngai ete sikoyo ayebi malamu mateya ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bandimaka. Napesaka ebongiseli ya Yehova matondi ndenge ebongiselaka biso banzembo yango ya kolendisa.”

 Epai wapi tozwaka mbongo mpo na kobongisa banzembo yango? Ezali na nzela ya makabo mpo na mosala ya mokili mobimba, oyo mingi na yango epesamaka na nzela ya donate.pr418.com. Matondi mingi mpo na makabo na bino ya bolingo malamu.