NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA
Bashario ya mikanda ezali kopesa “litatoli na bikólo nyonso”
01 AVRIL 2023
Eleki sikoyo mbula zomi, bashario na biso ezali kobenda likebi ya bato. Na mokili mobimba, bato mingi bayebi bashario na biso; bato bamonaka yango mpe bayebaka soki ezali ya banani. Ndenge oyo basali yango ebendaka likebi kaka te, kasi ezali mpe pɛtɛɛ mpo na kosalela. Mbala mosusu ondimi maloba ya Asenat, ndeko moko na Pologne, oyo alobi: “Bashario ezali pɛtɛɛ, kasi ezali mpe kitoko. Ezali mpasi te mpo na kotya yango na esika moko mpe kokende na yango na esika mosusu.”
Osilá komituna ndenge nini bashario yango esalemaki ?
Modɛlɛ moko oyo ebongi
Na 2001, Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesaki ndingisa ete bandeko ya France bámeka mitindo ndenge na ndenge ya kopesa litatoli na bisika ya bato mingi, ata mpe kopesa litatoli na nzela ya bashario. Bamekaki mayele ndenge na ndenge. Na ndakisa, babongolaki bavalizi mpe bashario ya kosomba biloko mpo na kolakisa mikanda na biso mpe kobomba mosusu. Nsukansuka, filiale ya France eponaki modɛlɛ moko, oyo basakoli basalelaki bambula mingi.
Bandeko ya France basepelaki mingi na mbuma ya mosala na bango ya kopesa litatoli na bisika ya bato mingi. Na yango, na 2011, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki programɛ moko mpo na komeka kopesa litatoli na bisika ya bato mingi na engumba New York, na États-Unis, na kosaleláká bashario mpe bamesa. Babongisi nzela oyo basanganaki na programɛ yango bamonaki nokinoki ete bashario ezalaki na matomba ebele, ata mpe ndenge ezali pɛtɛɛ kotambola na yango. Babongisi-nzela bapesaki mpe makanisi ya malamu mpo na ndenge ya kobongisa modɛlɛ ya bashario. Bashario ya liboso ya mabaya, oyo esalemaki na mabɔkɔ ezalaki mpenza kilo, yango wana ezalaki mpasi mpo na komata mpe kokita na eskalye. Na yango, babongisaki modɛlɛ moko ya sika mpo ezala pepele koleka; kasi pepele mpe mingi te mpo ememama te na mopɛpɛ. Na modɛlɛ ya sika ezalaki mpe na bapinɛ ya minene mpe ya makasi, oyo ekoki kosalema ata bisika ya mabulumabulu. Longola yango, bashario ya sika ezalaki na mwa poche ya moke mpo na kobomba mikanda mosusu.
Programɛ yango esimbaki mpenza! Na yango, na 2012, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ete bandeko na mokili mobimba bábanda kosalela bashario. Bandeko bayokanaki na kompani oyo ekokaki kosala bashario ebele na biloko ya pɛpɛlɛ kasi oyo eumelaka.
Na boumeli ya bambula, babongwana ya mikemike esalemaki na bashario. Na ndakisa, na 2015, babakisaki ezipeli ya plastiki ya polele mpo na kobatela yango na mbula. Dina, oyo afandaka na mboka Géorgie, asepelaki na yango mingi. Alobi ete, “Ezali lokola nde shario ezali na kazaka ya mbula mpo na kobatela mikanda.” Na 2017, bitanda ya emá (affiches aimantées) esalemaki na minɔkɔ mosusu. Tomasz, ndeko moko na Pologne, alobi boye: “Ntango tozalaki kosalela bitanda ya kala, ezalaki mpasi mpo na kobongola yango. Na yango, bitanda ya emá ezalaki likanisi moko kitoko. Na 2019, bambongwana mosusu esalemaki na ndenge ya kosala bashario mpe na biloko ya kosalela mpo eumela mingi koleka.
Ndenge basalaka bashario
Kompani kaka moko nde esalaka bashario nyonso mpe etindaka yango na masangá na mokili mobimba. Lelo, shario moko esɛngaka 43 dolare (Américain), longola mbongo ya kotinda mpe bambongo mosusu. Tii na moi ya lelo, mosolo koleka 16 milio ya badolare ebimisami mpo na bashario mpe bashario koleka 420 000 etindamaki na masangá na mokili mobimba.
Mpo na kosalela malamu makabo oyo epesamaka, basombaka bashario mingi mbala moko. Longola yango, na esika ya kozongisa bashario oyo ebebi, masangá ekoki kosɛnga kaka biloko mosusu oyo ebebi mpe kobongisa yango bango moko.
Kosalela bashario mpo na kopesa litatoli
Basakoli na mokili mobimba basepelaka kosalela bashario. Martina oyo afandi Ghana, alobi boye: Mbala mingi, ntango tosakolaka, biso nde topusanaka epai ya bato. Eloko nasepelaka na yango na mosala na bashario ezali ete bato nde bayaka epai na biso. Ata moleki-nzela akoki kozwa litatoli.”
Na mboka mosusu ya Afrika, mobali moko apusanaki penepene na shario moko mpe azwaki mikanda na monɔkɔ na ye. Azongaki nsima ya pɔsɔ moko mpe alobaki ete: “Natángaki mikanda nyonso. Makambo oyo ezali na kati ezali na ntina mingi. Nakoyebisa yango libota na ngai na mboka na ngai,” oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 500. Basanza mibale na nsima, azongaki mpe alobaki: “Bato ya mboka na ngai batángaki mikanda nyonso, mpe basepelaki mingi na makambo batángaki. Balingi kokóma Batatoli ya Yehova. Kasi bazali na mituna. Na ndakisa, bamoni ete mpo na kozwa batisimo, esengeli kozindisama na mai. Kasi tozali na ebale te pene na mboka na biso. Tosengeli koya awa mpo na kozwa batisimo?” Basakoli bakutanisaki mobali yango na mobongisi-nzela oyo alobaka monɔkɔ na ye. Banda wana, bango mibale basepelaka kosolola mbala na mbala.
Oyo nde esengo ya komona ete bashario ezali kosalelama mpo na kosakola “na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:14) Mbongo mpo na kosomba bashario yango eutaka wapi? Na nzela ya makabo mpo na mosala ya mokili mobimba, oyo mingi na yango epesamaka na nzela ya donate.pr418.com. Totondi bino mingi mpo na elimo na bino ya kokaba.