Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kilo ya mabanga batutatuta koleka 27 500 ememamaki na stidio ya Mount Ebo mpo na kosala video ya lisolo ya Biblia

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Bavideo ya Liyangani ya etúká ya 2020 “Bosepelaka ntango nyonso”!

Bavideo ya Liyangani ya etúká ya 2020 “Bosepelaka ntango nyonso”!

Mwa 10/08/2020

 Bavideo oyo ebimaka na mayangani ya etúká esimbaka mitema na biso mpe ekolisaka boyebi na biso ya mateya ya biblia. Liyangani ya etúká ya 2020 ‘Bosepelaka ntango nyonso’! ezalaki na bavideo 114, sangisa mpe badiskur 43 oyo esalamaki epai ya bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe basungi na bango. Okoki komituna, milende nini mpe mbongo boni esɛngaki mpo na kosala bavideo yango?

 Bandeko basi mpe mibali pene na 900 ya mokili mobimba bapesaki ntango mpe makoki na bango mpo bapesa maboko mpo na kosala bavideo ya liyangani. Bango nyonso balekisaki bangonga 100 000 na boumeli ya bambula mibale oyo mosala yango esɛngaki. Yango esangisi mpe bangonga 70 000 oyo balekisaki mpo na kosala video ya lisolo ya Biblia: Nehemia: “Esengo ya Yehova ezali esika makasi ya libateli na bino.”

 Ndenge yango ekoki komonana, esɛngaki mbongo mingi mpo na kokipe mpe koleisa bavolontɛrɛ oyo bamipesaki mpo na mosala yango, kopesa bango lisungi ya tekiniki, bisaleli ya malamu, mpe bisika oyo ebongi mpo na kosala mosala yango.

 Jared Gossman, oyo asalaka na departema ya audio/video alobi, “Komite ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo etalelaka mateya esepelaka makasi ete bavideo na biso elakisa bisika mpe mimeseno ndenge na ndenge ya mokili mobimba. Lolenge wana ekosala ete bavideo na biso emonisa ete tozali libota ya bandeko oyo tofandi na mabele mobimba.” Abakisi, “Baekipi 24 oyo etyamaki na bikolo 11 esalaki na boyokani mpo na kokokisa mosala yango. Esɛngaki mbongo ebele, kobongisa makambo malamu liboso mpe boyokani malamu mpo na kosangisa bandeko ya mokili mobimba na mosala yango.”

 Mingi ya bavideo na biso esɛngaka bisaleli ya sipesiale mpe kobakisa biloko mosusu. Na ndakisa, biloko oyo babakisaki na video ya lisolo ya Biblia: Nehemia: “Esengo ya Yehova ezali esika ya libateli na bino” esalemaki na kati ya stidio ya Mount Ebo pene ya Patterson, na New York, Etats-Unies. Esengelaki kosalela mbongo malamu mpo na kobakisa biloko mpo na kosala ete video ya lisolo ya Biblia yango eyokana na mimeseno ya ntango ya kala. Yango wana, bandeko basalaki bango moko biloko ya kilo te mpo esala lokola efelo ya Yerusaleme ya kala. Eteni mokomoko ezalaki na molai ya bamɛtrɛ 6 mpe bapakolaki yango langi mpo emonana neti mabanga. Mpo na kosalela biloko ebeleebele te, bakokaki kobongola “bifelo” yango mbala na mbala mpo na kosalela yango na biteni misusu ya video ya lisolo ya BIblia. Atako bongo, pene na badolare 100 000 ebimaki mpo na kosala biloko ya kobakisa kaka na filme yango moko. a

 Koyeba makambo oyo esali ete tósepela lisusu mingi na programɛ ya liyangani ya etúká ya mbula oyo. Tozali na elikya ete milende nyonso oyo esalemaki mpo na kosala programɛ oyo ekosala ete bato ya bisika nyonso bakoka kopesa Yehova lokumu. Topesi bino matondi mingi mpo na makabo na bino na nzela ya donate.pr418.com to na balolenge mosusu mpo na kosimba mosala ya kosakola na mabele mobimba.

a Biloko oyo babakisaki na video ya lisolo ya Biblia: Nehemia: “Esengo ya Yehova ezali esika makasi ya libateli na bino” esalemaki liboso ya maladi mabe ya COVID-19. Na ntango wana, mobeko ya kozala mosika na bato mosusu etyamaki naino te.