Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKAMBO NA YO ESALELAMAKA

Buku ya ndenge mosusu mpo na koyekola na bato Biblia

Buku ya ndenge mosusu mpo na koyekola na bato Biblia

MWA 01/04/2022

 Na sanza ya yambo ya mobu 2021, Lisangani ya Mikóló-Bakambi elobaki ete buku ya sika mpo na koyekola na bato Biblia ebimi, motó ya likambo na yango: Sepelá na bomoi libela na libela! a Oyokaki ndenge nini ntango bapesaki liyebisi yango? Matthew, oyo afandaka na Canada, alobi boye: “Nasepelaki makasi! Mpe esengo na ngai ebakisamaki ntango bazalaki kosala diskur mpe kolakisa bavideo oyo elimboli ndenge ya kosalela buku yango mpe ndenge bandeko bamekaki kosalela yango. Nazelaki yango na mposa makasi mpo na kobanda kosalela yango.”

 Buku Sepelá na bomoi libela na libela! Ebandisi ndenge ya sika ya kotambwisa boyekoli ya Biblia. Nzokande, bokeseni ya buku ya sika ná babuku mosusu oyo toyekolaka na bato Biblia esuki kaka wana te. Ata soki osaleli buku Sepelá na bomoi libela na libela! ya papye, okomona mpe bokeseni kaka. Mpo na komona bokeseni, tólobela ndenge buku yango esalemaki.

Buku ya sika oyo ezali komonana ndenge mosusu na mabɔkɔ

 Papye ya kilo. Mpo na nini ezali na ntina? Buku Sepelá na bomoi libela na libela! ezali na bililingi ya langilangi koleka 600, pene na mbala zomi koleka motángo ya bililingi ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka! Buku ya sika ezali na bisika mosusu oyo bakomá eloko te, makomi te to liyemi mpe te. Makambo mibale wana ebimisi mokakatano oyo: Soki lokasa ezali pɛpɛlɛ, bililingi oyo ezali na ngámbo mosusu ya lokasa ekoki komonana na ngámbo mosusu. Mpo esalema bongo te, bandeko oyo basalaka na Departema ya konyata mikanda [International Printing Department], na Wallkill, na etúká ya New York, na États-Unis, bamekaki ndenge minei ya nkasa oyo esalelamaka mingi na bamasini na biso ya kobimisa mikanda. Komite ya bokomi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi etalelaki lokasa mokomoko mpe baponaki oyo ezali komonisa ngámbo mosusu mpenza te. Atako lokasa yango ezali ya ntalo makasi koleka nkasa oyo tomesaná kosalela na mikanda na biso, ekopesa moyekoli ya Biblia nzela ya kotánga lokasa mokomoko ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! kozanga ete bililingi ya lokasa mosusu ebenda likebi na ye.

Lokasa oyo ezali na lobɔkɔ ya mobali ezali kolakisa papye oyo esalelami na buku Sepelá na bomoi libela na libela!

 Bizipeli lokola ya mwa plastiki. Ezipeli ya buku ya sika ekeseni na bizipeli ya babuku na biso mosusu, mpo oyo ya buku ya sika ezipami na mwa plastiki, to basashɛ mpo na kobatela yango. Na esika ya kotya plastiki oyo ezali kongɛnga, buku ya sika ezali na lokasa ya malamu oyo ezali kongɛnga te (mat), oyo ezali kokesenisa mayemi ya ezipeli. Plastiki ezali mpe kobatela buku etika bilembo ya mabɔkɔ te ata soki ezali kosalelama mingi. Kasi, lokasa ya mwa plastiki oyo ezali kongɛnga te ezali na ntalo mbala mitano koleka lokasa ya plastiki oyo engɛngaka. Yango wana, bafiliale ebele esalaki na boyokani mpo na kozwa nkasa ya mwa plastiki oyo engɛngaka te na ntalo moke.

Bazali kobakisa plastiki na bizipeli

 Mpo na nini baponaki biloko ya ntalo boye? Ndeko moko oyo asalaka na Departema ya konyata mikanda, alobi boye: “Tozali na mposa ete buku oyo esalelama malamu, yango wana tolingi ete buku ezala kaka malamu ata soki ezali kosalelama mingi.” Eduardo, ndeko oyo asalaka na biro ya konyata mikanda na Brésil, alobi boye: “Tozali na esengo mingi ndenge ebongiseli ya Yehova esaleli bisaleli ya malamu mpo na kokómisa buku yango kitoko, makasi, mpe esepelisa ntango ezali kosalelama; na ndenge yango, ekosalisa ete tósalela makabo ya bandeko na ndenge ya malamu.”

Konyata mikanda na eleko ya maladi mabe ya Coronavirus

 Tobandaki konyata buku Sepelá na bomoi libela na libela! na sanza ya misato ya mobu 2021. Yango ezalaki na eleko ya maladi mabe ya Coronavirus, mpe yango ebimisaki mikakatano. Lokola bato ya libándá bakokaki kokɔta na Betele te, likoki ezalaki te ete bandeko ya libándá báya kosala na imprimeri, mpe likoki ya kobenga bandeko ya sika báya kosala na Betele ezalaki lisusu te. Yango esalaki ete bato ya kosala na baimprimeri mosusu bázala moke, baimprimeri mosusu ekangamaki mpo na mibeko oyo bakonzi ya Leta batyaki.

 Ndenge nini tolongaki mikakatano yango? Na ntango mosala ya konyata mikanda ezongaki kosalema, bandeko basi mpe mibali ya badepartema mosusu bazalaki koya kopesa mabɔkɔ mpo na kosalisa mpo na mwa ntango na mosala ya konyata mikanda. Ndeko Joel, oyo asalaka na Departema ya konyata mikanda, alobi boye: “Elimo na bango ya komipimela mpe mposa na bango ya koyekola misala ya sika ezalaki na ntina mingi mpo mosala esalema.”

 Atako mikakatano wana ezalaki, tosilisaki konyata bamilio ya babuku Sepelá na bomoi libela na libela! Kobimisa yango esɛngaki bisaleli ndenge na ndenge, na ndakisa: plakɛ, plastiki oyo engɛngaka, papye, mai ya mokanda, mpe kɔle. Na sanza mitano mpamba, tosombaki bisaleli ya dolare koleka milio 2,3. Mpo na kobomba mbongo, tonyataki kaka motángo ya babuku oyo masangá esengelaki mpenza na yango.

“Ezali mosala moko oyo ebongi”

 Ndenge nini bateyi ná bayekoli ya Biblia bazali kotalela buku ya sika ya koyekola na bato Biblia? Paul, ndeko mobali moko na Australie, alobi boye: “Buku Sepelá na bomoi libela na libela! ezali kitoko, yango wana nazali kosepela koyekola na yango na bato. Ezali na makanisi ya malamu mpenza oyo emonisami polele, mituna oyo ezali kosimba motema, bavideo, bafɔtɔ, bitanda, mpe mikano mpo na moyekoli ya Biblia. Ezali mosala oyo ebongi mpenza oyo ezali kotinda ngai nabongisa ndenge na ngai ya koteya.”

 Moyekoli moko ya Biblia na États-Unis alobi boye: “Nazali mpenza kolinga buku ya sika. Bililingi ezali kosalisa ngai nakanga makambo ya ntina. Bavideo ezali kosimba motema na ngai mpe ezali kosalisa nga nakola na elimo.” Moyekoli yango ya Biblia azali koyekola mbala mibale na pɔsɔ mpe azali koyangana na makita nyonso ya lisangá.

 Esengeli lisusu tónyata bamilio ya babuku Sepelá na bomoi libela na libela! na minɔkɔ ebele mpenza. Na yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimi ete buku yango ebima na minɔkɔ 710, elingi koloba, minɔkɔ 340 ebakisami koleka ndenge ezalaki mpo na buku Makambo oyo Biblia eteyaka!

 Mbongo mpo na konyata mikanda yango eutaka wapi? Na nzela ya makabo oyo epesamaka mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, mingi na yango epesamaka na nzela ya donate.pr418.com. Tozali kopesa yo matɔndi mpo na ezaleli na bino ya bokabi, yango ezali kosalisa biso tóbimisa babuku ya koyekola Biblia na bato oyo balingi koyeba makambo ya Yehova mpe básepela “na bomoi mpo na seko.”​—Nzembo 22:26.

a Ebimaki na TW JW na programɛ moko ya mateya ya Biblia oyo esalemaki na likita ya mobu.