Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Ebele ya bato bazali komona matomba ya babiro ya kobongola mikanda

Ebele ya bato bazali komona matomba ya babiro ya kobongola mikanda

01/03/2021

 Na baekipi na biso mingi ya kobongola mikanda (koleka 60%) bandeko basalaka bisika mosusu kasi na bafiliale te. Mpo na nini ebongiseli yango ebongi mpenza? Biloko nini babongoli basengeli na yango mpo básala mosala na bango malamu na babiro yango? Na ndenge nini esika babongoli bazali ezali kobongisa mosala na bango?

 Biro ya kobongola mikanda ezali kosalisa babongoli bázala esika bato mingi balobaka monɔkɔ oyo bazali kobongola. Karin, ye abongolaka bas-Allemand, alobi boye: “Banda tokendá na biro ya kobongola mikanda na Cuauhtémoc, na Chihuahua, na Mexique, ntango nyonso, tolobaka kaka bas-Allemand​—biso ná babongoli mosusu mpe na mosala ya kosakola, ezala ntango tokei kosomba biloko, tolobaka kaka bas-Allemand. Tomikɔtisi mpenza na kati ya monɔkɔ na biso. Tozali koyoka elobeli makasi oyo toyoká kala mpenza, mpe tozali kokoma maloba oyo bato bazali kosalela mingi.”

 James, ye abongolaka monɔkɔ ya Frafra na Ghana, alobi ete ntango mosusu akanisaka bandeko oyo bazaláká na bango na Betele. Mpe abakisi boye: “Nasepelaka mpenza ndenge tozali kosala na biro ya kobongola mikanda. Kosakola na monɔkɔ ya mboka mpe komona ndenge bato bazali kosepela na nsango malamu esepelisaka motema na ngai mingi.”

 Ndenge nini bandeko bayebaka ete esengeli kotya biro ya kobongola mikanda na esika boye to boye? Ndeko Joseph, ye asalaka na biro monene, na Warwick, na Departema ya kosala baplan mpe ya kotonga na mokili mobimba, alobi boye: “Moko ya mikakatano tokutanaka na yango ezali ete, na bamboka mosusu, kura ya malonga ezali te, mai te, Internet oyo esengeli mpo na kozwa makambo ya kobongola ezali mpe te. Yango wana, ntango tozali koluka esika ya kotya biro ya kobongola mikanda, totalelaka bisika ebele, epai balobaka monɔkɔ yango.”

 Mbala mingi, tomonaka malamu mpenza ete, mpo na kobungisa mbongo mingi te, tótya biro na Ndako ya Bokonzi, na Ndako ya Mayangani to na ndako ya bamisionɛrɛ, bongo babongoli bayaka kosala wana. Kasi, soki ndako ya bongo ezali te, bakoki kopesa bandeko ndingisa ya kosomba bandako mpe bisika ya kotya babiro epai babongoli bakobanda kolala mpe kosala. Soki mbongwana moko esalemi, bandako yango ekoki kotɛkama mpe kosalela mbongo yango esika bosɛnga ezali makasi.

Bazali na nyonso oyo esengeli mpo na kokoba mosala

 Na mobu ya mosala 2020, tosalelaki mbongo dolare milio 13 mpo babiro ya kobongola mikanda esala mosala. Baekipi na babiro ya kobongola mikanda esengeli kozala na baordinatɛrɛ, baprogramɛ ya sikisiki, biloko ya kokɔtisa mingongo, Internet, mpe biloko mosusu ya ntina. Na ndakisa, ordinatɛrɛ oyo moto moko akosalela ekoki kozwa dolare 750. Baordinatɛrɛ yango ezali na baprogramɛ oyo basombaka, bakisá mpe WTS (Watchtower Translation System) programɛ oyo esalisaka babongoli bábongisa mosala na bango malamu mpe bázwa mikanda ya kosalela oyo basengeli na yango.

 Na biro, babongoli bazalaka mpe na bisaleli mosusu oyo esalisaka bango bákɔtisa mingongo. Emonanaki ete bisaleli yango ezali na ntina mingi ntango maladi ya COVID-19 ebandaki, mpo babongoli bazalaki kokende na bisaleli yango na bandako na bango mpo na kokɔtisaka mingongo ya makambo oyo basengelaki kokoma mpe bavideo.

 Bandeko ya masangá basalisaka mingi na kotánga mikanda mpe kosala misala mosusu. Cirstin, ye abongolaka monɔkɔ ya Afrikaans na biro ya kobongola mikanda na Cape Town, na Afrika ya Sudi, alobi boye: “Basakoli mingi mpe babongisi-nzela ya sanza na sanza bazwaka libaku ya kosala awa.

 Bandeko yango oyo bamipesi na bolingo na bango moko basepelaka na libaku malamu yango. Ndeko mwasi moko oyo apesaka mabɔkɔ na biro moko ya kobongola mikanda alobi ete, kosala kuna ezali mpenza “kokitisa motema mpe kobɔndisa.” Bandeko mosusu mpe bazali kokɔtisa mingongo na bango. Juana, ye abongolaka monɔkɔ ya Totonaque na etúká ya Veracruz, na Mexique, alobi ete: “Sikoyo lokola tozali na bamboka oyo balobaka monɔkɔ na biso, ezali mpasi te ete bandeko báya kokɔtisa mingongo mpo na mikanda mpe bavideo.”

 Kasi, babiro ya kobongola mikanda ebongisi ndenge ya kobongola mikanda? Ebele ya bato oyo batángaka mikanda na biso bandimi likambo yango. Cédric, ye abongolaka na ekipi ya Kongo na République Démocratique du Congo, alobi boye: “Liboso bandeko mosusu bazalaki kobenga ndenge oyo tobongolaka mikanda na Kongo ete ‘Kongo ya mikanda ya Watch Tower,’ mpo ezalaki kokomama te ndenge bato balobaka Kongo mokolo na mokolo. Nzokande, sikoyo balobaka ete mikanda na biso ezali kobongolama na Kongo ya mikolo oyo, ndenge bato balobaka mokolo na mokolo.”

 Andile, ye abongolaka na ekipi ya Xhosa, na Afrika ya Sudi, ye mpe ayoká makambo ya ndenge wana. Alobi boye: “Bato mingi bazali koyebisa biso ete bazali komona mbongwana na ndenge ya kobongola mikanda. Ata bana oyo bazaláká kotánga Linɔngi ya Mosɛnzɛli na English, bazali sikoyo kotánga yango na Xhosa. Bazali mpenza kosepela na Libongoli ya Mokili ya Sika mpo ebongolami ndenge bato balobaka.”

 Mbongo nyonso oyo ebimaki mpo na koluka bisika ya kotya babiro ya kobongola mikanda, kobongisa to kobatela yango, mpe kosalisa bato oyo basalaka kuna, euti na makabo oyo epesamaka mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba, mpe oyo bapesaka na nzela ya donate.pr418.com.