Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Kobimisa buku oyo eleki babuku nyonso

Kobimisa buku oyo eleki babuku nyonso

01/01/2021

 “Nabandá kozela yango na boumeli ya mbula 19 mobimba!” Ndeko na biso azalaki kozela nini? Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na monɔkɔ ya Bengali, oyo ezali monɔkɔ ya mboka na ye. Bandeko mingi balobaka bongo ntango Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimi na minɔkɔ na bango. Kasi, osilá komituna mpo na koyeba makambo nini esengeli kosalema mpo na kobongola mpe kobimisa Babiblia yango?

 Libosoliboso, ekipi ya babongoli eponamaka mpe esalaka na nse ya litambwisi ya Komite ya Bokomi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Esɛngaka ntango boni mpo ekipi yango esilisa kobongola Biblia? Ndeko Nicholas Ahladis, oyo asalaka na biro ya babongoli na Warwick, na New York, alobi boye: “Ezali na makambo mingi oyo esengeli kotalela, kati na yango, motángo ya bandeko oyo bakobongola, monɔkɔ oyo bazali kobongola na yango ezali makasi mingi, bato oyo bakotánga yango bayebi ndenge makambo ezalaki kosalema na ntango ya kala, monɔkɔ yango elobamaka ndenge moko bisika nyonso oyo balobaka yango to te. Mbala mingi, mpo na kobongola kaka Makomami ya Grɛki ya bokristo mpamba, esɛngaka mbula moko to misato mpe mpo na kobongola Biblia mobimba, esɛngaka mbula minei to koleka. Mpo na kobongola minɔkɔ ya bababa, yango ezwaka lisusu ntango mingi koleka.”

 Mpo na kobongola Biblia, esuki kaka te na kozwa babongoli. Esengeli kozwa mpe bandeko ndenge na ndenge, oyo bafandi na bisika ndenge na ndenge oyo balobaka monɔkɔ yango na mboka wana, mpo na kotánga makambo oyo babongoli, mpe bakosala yango ofele. Makanisi bakopesa ekosalisa babongoli bábimisa Biblia oyo ekomami na bosikisiki, polelepolele, mpe oyo bato bakokanga ntina ya makambo oyo ekomami. Ndeko moko ya Afrique du Sud oyo apesaka babongoli ya Biblia formasyo alobaki boye: “Babongoli bamonaka ete kobongola Biblia ezali mokumba moko monene na miso ya Yehova mpe na miso ya bato oyo bakotánga yango.”

 Soki basilisi kobongola, esengeli konyata (imprimer) Babiblia yango, kokangisa yango mpe kotya yango bizipeli. Yango wana, basalelaka biloko koleka zomi na imprimeri: nkasa, mai ya mokanda, bizipeli, kɔlɛ, nkasa ya kozipa, nkasa ya langi ya palata, ruban, bande, biloko ya kokembisa na nsima, mpe biloko ya kozipa mpo esangisama malamu. Na 2019, mbongo koleka dolare milio 20 ebimaki kaka mpo na kosomba biloko wana. Bandeko oyo basalaka na ba-imprimeri basalaki ngonga koleka 300 000 na mbula yango kaka mpo na kobimisa Babiblia mpe kotinda yango.

“Biblia ezali mokanda ya ntina mingi koleka mikanda nyonso oyo tobimisaka”

 Mpo na nini kobimisa mbongo ebele boye mpe kolekisa bangonga mingi boye na misala yango? Ndeko Joel Blue, oyo asalaka na Departema ya Imprimeri mpo na mokili mobimba, alobi boye: “Biblia ezali mokanda ya ntina mingi koleka mikanda nyonso oyo tobimisaka. Yango wana, tolingi ete ndenge oyo yango ekomonana na miso ya bato epesa Nzambe oyo tosambelaka nkembo, mpe ekumisa nsango oyo tosakolaka.”

 Longola Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo biso nyonso tozalaka na yango, tobimisaka mpe Babiblia mpo na bato oyo bazali na mikakatano. Na ndakisa, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika mpo na bato oyo bakufá miso, tobimisá yango na minɔkɔ zomi. Ekoki kosɛnga ngonga mwambe mpo na kokoma Biblia mobimba na ekomeli ya bato oyo bakufá miso, mpe esɛngaka esika oyo ezali na bonene ya mɛtrɛ 2,3 mpo bavolimi na yango nyonso ekoka. Tobimisaka mpe Babiblia ya ndenge mosusu mpenza mpo na bato oyo bazali na bolɔkɔ na bisika oyo kaka babuku oyo ezali na bizipeli te nde ekoki kokɔta.

 Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kobongola bomoi ya bato oyo bazali kotánga yango. Tózwa ndakisa ya lisangá moko ya monɔkɔ ya Kiluba, oyo ezali na mboka moko nkombo na yango Tombe, na République Démocratique du Congo. Soki olongwe na motuka banda Kinshasa, okotambola kilomɛtrɛ koleka 1 700 liboso okóma na Tombe. Batatoli oyo bazali kuna, bazalaki na Biblia kaka moko mpamba mpe na monɔkɔ ya Kiluba ya kalakala mpenza. Mpe Biblia yango ezalaki koleka epai ya ndeko mokomoko mpo na kobongisa makita. Kasi, banda na sanza ya 08/2018, lisangá mobimba bazwaki moto na moto Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika mobimba na monɔkɔ ya Kiluba ya mikolo oyo.

 Ndeko mwasi moko oyo alobaka monɔkɔ ya Allemand alobi boye mpo na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu na monɔkɔ yango: “Nalobaka lisusu te ete nasengeli kotánga Biblia. Kasi namitunaka nde ete: ‘Nakotánga lisusu mingi ntango nini?’” Moto moko ya bolɔkɔ akomaki boye: “Bapesaki ngai Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika, mpe yango ebongolá bomoi na ngai. Nakangá naino ntina ya Liloba ya Nzambe malamu boye te liboso nabanda kotánga Biblia oyo. Nalingi nayeba makambo etali Batatoli ya Yehova malamu mpenza, mpe makambo oyo nasengeli kosala mpo ngai mpe nakóma Motatoli ya Yehova.”

 Bato nyonso oyo batángaka Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika bazali kopesa matɔndi mpo na makabo oyo ezali kosimba mosala ya kobimisa Babiblia yango. Makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba epesamaka mbala mingi na nzela ya donate.pr418.com. Matɔndi mingi mpo na ezaleli na bino ya kokaba.