Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Kosunga bandeko na mokili mobimba na ntango ya maladi mabe oyo

Kosunga bandeko na mokili mobimba na ntango ya maladi mabe oyo

01/07/2021

 Na sanza ya 03/2020, ntango ebongiseli ya ONU oyo etalelaka sante elobaki ete maladi ya coronavirus epanzani na mokili mobimba, bato mingi bakokaki te kokanisa ete virisi yango ekoumela mbula koleka moko. Bamilio ya bato, ezala mpe Batatoli ya Yehova, bazali kokutana na mikakatano ya sante, ya makanisi, mpe ya mbongo. Makambo nini Batatoli ya Yehova basalaki mpo na kosunga bandeko na bango na ntango oyo ya mpasi?

Kosunga baoyo bazali na bosɛnga mpenza

 Na litambwisi ya Komite ya Bakambi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, Bakomite koleka 950 ya kopesa lisungi na ntango ya makama esalemaki na mokili mobimba mpo na kosunga bandeko na ntango ya coronavirus. Na bamboka mosusu, bandeko basungaki bandeko na bango na biloko na bango moko, kasi na bamboka mosusu, Batatoli ya Yehova bazwaki lisungi epai ya bakonzi ya Leta. Bakomite ya kopesa lisungi mpe ebongisamaki na mokili mobimba.

 Na ndakisa, tótalela makambo oyo esalemaki na ekólo Paraguay. Lapolo moko emonisaki ete maladi oyo mabe ebimisaki mikakatano monene ya nkita, yango wana “bato mingi mpenza bazali kozanga bilei.” Kasi Komite ya kopesa lisungi etyamaki mpo na kokabola biloko na boumeli ya pɔsɔ mibale, ezala bilei, bankisi ya kosalela mpo na kopɛtola bisika mpe biloko mosusu ya ndako na libota moko ya bato minei. Eloko yango mokomoko ezali na valɛrɛ ya dolare 30.

 Ndenge nini balovontɛrɛ oyo bapesaka bandeko lisungi na ntango ya makama bamibatelaka mpe babatelaka basusu mpo bázwa te maladi ya coronavirus? Balataka maskɛ mpe bazalaka mosika na basusu. Balandelaka mpe soki bakompanyi oyo ememaka biloko ezali na bandako ya kobomba biloko oyo ezali pɛto mpe balandelaka malako ya komibatela. Yango esangisi komindimisa ete soki bato nyonso oyo bakomema biloko na mabɔkɔ, bazwi malako mpo na kolata biloko ya komibatela, kozala pɛto, kopɛtola mituka na bango, mpe kobomba biloko na bisika oyo batye bankisi mpo na koboma bamikrobe. Nsukansuka, bavolontɛrɛ oyo bapesaka biloko bazalaka mosika na bandeko oyo bazwaka yango.

Makabo oyo esalelami na bwanya mpenza

 Kobanda na sanza ya 01/2021, Komite ya Bakambi endimaki bábimisa dolare koleka milio 25 mpo na kosunga bandeko na ntango ya coronavirus. Bafiliale mpe Bakomite ya kopesa lisungi esalelaka makabo na bokɛngi mpenza mpe esalaka mosala makasi mpo na koluka biloko oyo ezali na ntalo ya malamu. Na ndakisa, na Chili, bandeko ya Komite ya kopesa lisungi balingaki kosomba kilogramɛ 750 ya lantiyɛ. Kasi ntalo ya lantiyɛ emataki mbala mibale kaka na sanza moko! Ata bongo, bandimaki kosomba yango kaka na ntalo yango. Ngonga mibale na nsima wana basilaki koyokana na motɛki, motɛki ayebisaki bango ete mosombi mosusu auti koloba ete akosomba lisusu te. Na esika atɛkela bandeko na ntalo ya likoló ndenge bayokanaki, motɛki ayebisaki bango básomba na ntalo ya nse ya sanza oyo eleki!

 Kasi, ntango bandeko bayaki kozwa lantiyɛ yango, motɛki amekaki koboya kotɛkela bango, alobaki ete bandeko bazali koponapona mpo na kokabolela bato biloko, se ndenge moko na bibongiseli mosusu. Nsima ya kosala libondeli moko ya mokuse na motema, ndeko moko ayebisaki motɛki ete lisangá mokomoko epesaki motángo ya bato oyo bazalaki na bosɛnga mpenza. Bandeko balimbwelaki ye mpe ete lokola bato oyo bakozwa biloko yango bazali bato ya mimeseno ekeseni, bato na bato bakozwa biloko oyo bamesaná na yango mingi. Nsukansuka, bayebisaki motɛki yango ete Batatoli ya Yehova bapesaka makabo nyonso na bolingo na bango moko mpe bamipesaka bango moko mpo na kosala misala na bango. Akamwaki mpenza. Andimaki kokitisa ntalo mpe apesaki bandeko kilogramɛ 400 ya lantiyɛ ofele na mbala ya mibale oyo bayaki kosomba.

“Elembo ya bolingo ya solosolo”

 Lusu, mobange moko na Libéria, oyo mobali akufá, afandaka elongo na bato mitano na libota. Mokolo moko na ntɔngɔ, bazalaki kolya mpe kotalela mokapo ya mokolo, nkɔkɔ na ye, oyo azali na mbula nsambo, amonaki ete mokolo yango bilei ezalaki te na ndako. Atunaki boye: “Tokolya nini lelo?” Lusu amonisaki ye ete asili kobondela mpo na yango, mpe atyaki motema ete Yehova akopesa bango bilei. Na mpokwa ya mokolo yango, bankulutu ya lisangá babengaki Lusu mpo aya kozwa bilei oyo bazalaki kopesa bandeko. Alobi boye: “Nkɔkɔ na ngai alobi ete sikoyo nayebi Yehova akoki koyoka mpe koyanola na mabondeli mpo Yehova ayanolaki na libondeli na ye.”

Bana na République Démocratique du Congo bazalaki koyema bililingi mpo na kopesa bandeko na bango matɔndi mpo na bilei oyo bazwaki

 Mwasi moko na République Démocratique du Congo afandaka lopango moko ná libota moko ya Batatoli ya Yehova. Ntango amonaki libota yango ezwaki bilei epai ya bandeko na bango bakristo, alobaki boye: “Nsima ya coronavirus, tokokóma Batatoli ya Yehova mpo bazali kotyela bandeko na bango likebi na ntango oyo ya mpasi.” Mobali na ye atunaki ye boye: “Okokóma Motatoli ya Yehova kaka mpo na saki moko ya loso?” Alobaki na mobali na ye boye: “Te, kasi saki ya loso ezali elembo ya bolingo ya solosolo.”

 Batatoli ya Yehova bazali na likoki ya kosala nokinoki mpo na kosunga bandeko na bango na ntango oyo ya coronavirus mpo na makabo oyo opesaka na bolingo na yo moko. Matɔndi mingi mpo na makabo oyo ozali kopesa na kolanda malako oyo ezali na donate.pr418.com.