Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Kosunga bato oyo bakutani na makama

Kosunga bato oyo bakutani na makama

01/02/2021

 Na 2020, bato ebele bakutanaki na makama oyo ebimaka yango moko, mpe na nsima, COVID-19 ebandi kosasa na mokili mobimba. Ndenge nini Batatoli ya Yehova basalisaki baoyo bakutanaki na makama?

 Na boumeli ya mobu ya mosala 2020, a Komite ya bakambi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesaki nzela básalela mbongo dolare milio 28 b mpo na kosunga bandeko. Mbongo yango esalisaki bandeko oyo bakutanaki na makama koleka 200 oyo ebimaki​—kati na yango maladi ya COVID-19, mipɛpɛ ya makasi mpenza, mai ezindisaki bamboka na Afrika, nzala na Venezuela, kokauka ya mai na Zimbabwe. Mbongo bapesaki esalisaki na kosomba biloko ya kolya, mai, bisika ya kolala, bilamba, mpe bankisi, bakisa mpe bankisi ya kosukola ndako, biloko ya kobongisa mpe kotonga bandako. Talá mwa misala mosusu oyo basalaki mpo na kopesa lisungi.

 COVID-19. Na mokili mobimba, maladi mabe yango enyokolaki bandeko na biso na nzoto, na makanisi, mpe ekómisi basusu babola to ebebisi misala na bango. Mpo na kosalisa bandeko, Komite koleka 800 ya kopesa lisungi esalemaki na mokili mobimba. Bakomite yango ezalaki kolandela bosɛnga ya bandeko, mpe na mbala moko bazalaki kopesa lapolo, mpe balapolo yango ezalaki kosalisa Komite ya bakambi báyeba ndenge ya kotambwisa misala ya kopesa lisungi.

 Na boumeli ya mbula yango, Bakomite ya kopesa lisungi esalisaki bandeko bázwa biloko ya kolya, mai, bisaleli ya kotya bopɛto mpe bankisi ya monganga. Na bamboka mosusu, bakomite yango esalaki elongo na bankulutu mpo na kosalisa bandeko bázwa lisalisi ya Leta.

 Ata bato oyo bazali Batatoli ya Yehova te bamonaki ndenge tosungaki bandeko. Na ndakisa, Field Simwinga, Komisɛrɛ ya Distriki na Nakonde, na ekólo Zambie, ayebisaki bandeko boye: “Bokɔtisi biso nyongo na ndenge bopesi mabota oyo ekutani na likama biloko oyo basengelaki na yango na ntango oyo ebongi.”

 Nzala na Angola. Maladi ya COVID-19 esilisi biloko ya kolya na Angola mpe mwa ndambo oyo etikali emati ntalo makasi. Kosomba biloko ekómi mpasi mpo na bandeko mingi.

Biloko oyo bandeko ya Brésil batindaki na Angola

 Tosɛngaki filiale ya Brésil etindela bandeko ya Angola biloko ya kolya. Mpo na kosalela mbongo ya kopesa lisungi malamu, bayekolaki makambo ya kosomba biloko malamu mpenza, mpe basombaki biloko ebele na mbala moko. Na yango, kosomba mpe kotinda kitunga moko ya biloko ezwaki mbongo dolare 22, mpe kitunga mokomoko ezalaki na kilo ya biloko 20: loso, madesu ná mafuta. Tii lelo, totindi kitunga 33 544​—nyonso esali tɔni soki 654 ya biloko (721 U.S. tons). Soki tobakisi na biloko oyo bazwaki na Angola, yango eleisaki bato koleka 50 000!

 Bandeko na biso bayokaki ndenge nini mpo na lisungi yango? Alexandre, ye afandaka na mwa esika moko ya mosika kuna na Angola, alobi boye: “Namoni ete oyo ezali elembeteli ete Yehova alingi ngai, mpe nazali ngai moko te. Ebongiseli ya Yehova ezwaka nga na motuya mingi!” Mariza, oyo abɔkɔlaka bana ye moko, alobi ete: “Yehova ayokaki kolela na ngai. Nazali kopesa ye ná ebongiseli na ye matɔndi mingi!”

Bandeko na Angola bazali kopesa matɔndi mpo na lisungi bazwaki

 Lisungi mpo mai ekaukaki mingi na Zimbabwe. Na mobu ya mosala 2020, mai ekaukaki makasi mpenza na Zimbabwe, mpe yango enyokoli bamilio ya bato na nzala. Bankóto ya Batatoli ya Yehova na Zimbabwe bazalaki na biloko ya kolya mpenza te.

 Komite mitano ya kopesa lisungi esalemaki mpo na kopesa bandeko biloko ya kolya. Bankama ya bandeko bapesaki mabɔkɔ mpo na kokanga biloko, komema yango, to mpe bapesaki mituka na bango. c Na boumeli ya mobu ya mosala 2020, tosalelaki 691 561 dolare mpo na koleisa bato koleka 22 700!

Bandeko na Zimbabwe bazali kozwa biloko ya lisungi

 Na bisika mosusu, ntango biloko ya lisungi ekómaki, ekutaki bandeko na eloko ya kolya lisusu te. Ntango biloko ya kolya ekómaki, bandeko na biso bakumisaki Yehova. Bandeko mosusu babandaki kutu koyemba banzembo ya Bokonzi.

 Na mboka moko, Batatoli mibale oyo mibali na bango bakufá bakendaki na likita moko oyo basalaki na mboka mpo na kokabola biloko oyo ONG moko boye epesaki. Kasi, likita yango ekómaki lisusu kolobela mingi nde makambo ya politiki. Na yango, bandeko na biso bazwaki ekateli ete bakondima ata moke te makambo oyo basɛngi bango básala mpo na kozwa lisungi. Ntango balongwaki na likita yango, basɛkaki bango mpe balobaki na bango ete: “Bómeka koya kosɛnga biso biloko ya kolya te!” Nzokande, kaka nsima ya pɔsɔ mibale mpamba, bandeko na biso oyo bamemaki biloko bakómaki na mboka yango, mpe bapesaki bandeko basi wana biloko ya kolya liboso kutu ete biloko ya ONG ekóma!

Prisca alobaki ete: “Yehova asundolaka basaleli na ye te”

 Kopesa lisungi na Zimbabwe epesaki mpe litatoli ya malamu. Na ndakisa, talá likambo oyo ekómelaki Prisca, ye afandaka na mwa mboka moko ya moke mpenza. Atako kokauka ya mai ebimisaki mikakatano mingi, Prisca atikaki mokolo ya misato mpe ya mitano kaka mpo na mosala ya kosakola, ata na ntango ya kokata bilanga. Bato ya mboka bazalaki kotyola ye ete: “Okoya koboma libota na yo na nzala likoló ya kosakola.” Prisca azalaki kozongisa ete: “Yehova asundolaka basaleli na ye te.” Kendekende, azwaki lisungi oyo eutaki na ebongiseli ya Yehova. Yango ekamwisaki bato mosusu oyo bafandaka pene na Prisca, mpe balobaki na ye ete: “Nzambe asundoli yo te, yango wana tolingi tóyeba makambo na ye.” Lelo oyo, bato nsambo kati na bato oyo bafandaka pene na ye bazali kolanda makita ya lisangá na radio.

 Lokola tokómi pene na nsuka, tokokutana lisusu na makama ebele oyo ebimaka yango moko. (Mat 24:3, 7) Matɔndi mingi na ndenge bozali kopesa makabo na kolanda mayele ndenge na ndenge oyo ezali na donate.pr418.com. Ekosalelama mpo na kosunga, na ntango oyo ebongi, baoyo bazali na bosɛnga.

a Mobu ya mosala 2020 ebandaki na sanza ya 09/2019 tii na sanza ya 08/2020.

b Mbongo nyonso na lisolo oyo ezali na dolare.

c Mpo na komibatela na maladi mabe ya COVID-19, bandeko basengelaki kozwa ndingisa liboso ya kokende kokabola biloko. Bango moko mpe bazali kozwa bibongiseli ete bámitya na likama te ya kozwa maladi yango.