Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka

Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka

MWA 1/07/2022

 Yehova Nzambe alingi ete moto nyonso, ezala moto oyo alobaka to te, ayeba ye mpe makambo ya Bokonzi ya likoló. (1 Timote 2:3, 4) Mpo na yango, Batatoli ya Yehova bazali kobimisa Babiblia mpe babuku ya koyekola na bato Biblia, ezala mpe mpo na bato oyo bakufá matoi. Yango wana, ebongiseli na biso ebimisá ebele ya mikanda ná bavideo na elobeli ya bababa, a oyo ekómi na min koleka 100! Ndenge nini tobimisaka mpe tokabolaka yango? Mpe bokoli nini tosali na boumeli ya ntango?

Ndenge nini bavideo ya elobeli ya bababa esalemaka?

 Baekipi ya kobongola na mokili mobimba nde ebimisaka mikanda na elobeli ya bababa. Bato oyo bazali na kati ya ekipi bayekolaka malamu mpenza mokanda oyo balingi kobongola. Na nsima, baponaka ndenge ya malamu mpenza ya kobongola makambo na elobeli ya bababa. Soki babongoli, na nsima basali video. Lelo oyo, baekipi 60 ezali kobongola mikanda ya koyekola na yango Biblia na elobeli ya bababa sanza na sanza, mpe baekipi 40 ezali kolekisa basanza mosusu.

 Liboso, kobimisa bavideo na elobeli ya bababa ezalaki kosɛnga mbongo mingi mpenza. Bakamera mpe bisaleli mosusu ezalaki na ntalo mingi koleka ndenge ezali lelo. Lisusu, bavideo ezalaki kosalema nde na stidio, biso moko tozalaki kotonga ndako ya sika, to mbala mosusu kobongisa ndako moko ya kala. Mpo na kozala na eloko nyonso oyo ekipi moko ya kobongola mikanda na elobeli ya bababa esengeli na yango, ezalaki kosɛnga mbongo koleka dolare 30 000.  b

 Mpo na kosalela malamu makabo, ebongiseli na biso elukaki kobongisa mpe koyeisa pɛpɛlɛ ndenge ya kobongola mikanda wana. Na yango, tokómaki kosalela bisaleli ya sika ya malamu mpe ya ntalo moke. Na esika ya kosalela stidio, baekipi ya kobongola ekoki, na biro na bango, kotya elamba moko ya langi ya mai ya mpondu na nsima mpe kosala video. Soki esengeli bato mingi básala video moko, bato na bato bakoki kokɔtisa eteni na bango na biro na bango to na ndako na bango; ntina ya kokende na stidio ezali lisusu te

 Tobimisaki mpe baprogramɛ mpo na kosalisa babongoli yango na mosala na bango. Mbongwana wana ekaboli ntango oyo babongoli bazalaki kolekisa mpo na kobimisa bavideo na elobeli ya bababa na mibale. Bandeko na biso basepeli na mbongwana yango mingi mpenza. Ndeko moko na nkombo Alexander alobi: “Bavideo na elobeli ya bababa ekómi kobima mingi koleka liboso. Yango ezali kosepelisa ngai mingi. Mokolo na mokolo nazali kotala bavideo.”

 Lelo oyo, mpo na kosombela ekipi moko ya kobongola mikanda na elobeli ya bababa bisaleli, mbongo ekoki kokóma te ata dolare 5 000. Yango wana, tokómi na likoki ya kobimisa bavideo ya elobeli ya bababa na minɔkɔ mingi mpenza.

Ndenge nini bavideo ya elobeli ya bababa ekabolamaka?

 Mbala moko soki mokanda ebongolami na elobeli ya bababa na video, bavideo yango esengeli kokende epai ya bato oyo basengeli na yango. Na kala, tozalaki kobimisa bavideo-kasɛti ná ba-DVD, kasi yango ezalaki kosɛnga mbongo mingi, ntango mingi, mpe mosala makasi mpenza. Makambo oyo bakɔtisi ezalaki kotindama na libándá epai ya bato oyo bakoki kokómisa yango mingi. Na nsuka, bavideo-kasɛti ná ba-DVD nde ezalaki kotindama na masangá. Kaka na mobu 2013, tosalelaki mbongo koleka dolare 2 000 000 mpo na kobimisa ba-DVD ya elobeli ya bababa.

 Bato oyo bakufá matoi bazalaki kosepela na yango mingi. Nzokande, ezalaki pɛtɛɛ te kosalela bavideo yango, mingimingi ntango bakasɛti ná ba-DVD ezalaki kobakisama. Ntango mosusu, esengelaki kosalela ba-DVD ebele mpo na mokanda kaka moko. Ndeko moko na nkombo Gilnei oyo afandaka na Brésil, alobaki boye: “Mpo na kotánga vɛrsɛ, esengelaki kozwa video-kasɛti na yango, mpe kozwa vɛrsɛ yango. Ezalaki mpasi mpenza.” Ndeko mwasi moko na nkombo Rafayane, ye azalaki kosalela ba-DVD ya elobeli ya bababa, alobi boye : “Kosala boyekoli ya moto ye moko ezalaki kolɛmbisa. Mpo na kozwa vɛrsɛ to esika ya kotánga ezalaki kozwa ntango mingi.” Mpe mbala mingi, ntango bandeko na biso bazalaki kokende na mosala ya kosakola, basengelaki komema ba-DVD to bavideo-kasɛti, oyo bazalaki kosalela na TV ya moto oyo asepeli na nsango na biso. Bandeko mosusu mpe bazalaki komema baaparɛyi ya DVD ya bango moko. Nzokande, liboso baaparɛyi ya DVD ekóma na mwa écran na yango, bandeko mingi bazalaki kosala ndenge tolobi. Bobby, ye afandaka na États-Unis, alobi boye: “Soki otángeli moto vɛrsɛ mpe olingi obakisa vɛrsɛ mosusu, mbala mingi, esengelaki kozwa DVD mosusu. Yango ezalaki kosɛnga ntango mingi mpe ezalaki mpasi kotángela moto vɛrsɛ ntango tozali kosolola.”

 Na mobu 2013, ebongiseli ya Yehova ebimisaki JW Library Sign Language, yango epesaki bandeko nzela ya kozwa bavideo mpe kotya yango na batelefone to batablɛti na bango. Programɛ yango ebimaki liboso kaka na elobeli ya bababa ya Amerika. Na nsima, na mobu 2017, ebongisamaki na ndenge ete elobeli ya bababa nyonso esalela yango. Bandeko na mokili mobimba basepelaki na yango mingi. Juscelino, ndeko moko oyo afandaka na Brésil, alobi: “Elekelaki ngai! Nakobaki kokanisa ndenge Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kolinga biso bato oyo tokufá matoi, mpe ndenge balingi ete biso mpe tókola na elimo ndenge moko na bato oyo balobaka na monɔkɔ. Nasepelaki mingi mpenza, mpe programɛ yango etindaki ngai nayekola Biblia lisusu mingi.”

Using the JW Library Sign Language app

 Lelo oyo, tozali kobimisa bavideo na Internet mpe tozali kokabola yango na site na biso mpe na programme JW Library Sign Language. Yango wana, mikanda ya elobeli ya bababa ekoki kobongolama, kosala video na yango, mpe kokabola yango na mwa mikolo moke mpenza, na esika ya basanza ebele to bambula. Na yango, na min ya bababa mingi, mikanda na yango ezali kobima nzela moko na mikanda ya bato oyo balobaka na mon.

 Yoká ndenge bandeko na biso mosusu ya bababa balobaki. Ndeko mwasi moko na nkombo Klízia alobi boye: “Ebongiseli nini esepelaka na bato oyo bakufá matoi mpo na kopesa bango biloko oyo basengeli na yango mpo na kokómisa kondima na bango makasi, mpe kozwa yango ezala mpasi te? Eloko moko te na mokili oyo ekokani na oyo ebongiseli ya Yehova ezali kosalela biso.” Vladimir alobi boye: “Bavideo ezali komonisa ete Yehova alandelaka bato oyo bakufá matoi ndenge moko na bato oyo bayokaka.”

 Mbala mingi, bavideo na biso ya elobeli ya bababa elobaka boye: “Mokanda oyo ebimisami mpo na koteya bato Biblia na mokili mobimba, mpe mbongo mpo na kosala mosala yango eutaka na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko.” Tozali kopesa bino mat ndi mingi mpo na makabo na bino, mingi na yango ezali kopesama na nzela ya donate.pr418.com. Makabo yango ezali kopesa biso nzela ya kobimisa Babiblia mpe mikanda ya koyekola Biblia mpo na bato nyonso, bakisa mpe bato oyo basalelaka elobeli ya bababa.

a Lokola elobeli ya bababa esɛngaka kosala bajɛstɛ na mabɔkɔ mpe na elongi mpo na kobimisa makanisi, mikanda ya elobeli ya bababa ebimaka na bavideo kasi na bapapye te lokola mikanda mosusu.

b Dolare oyo tolobeli awa ezali dolare ya États-Unis.