Lakisá makambo oyo ezali na kati

04 SANZA YA 12, 2020
ÉRYTHRÉE

Érythrée: Batatoli ya Yehova 28 babimi na bolɔkɔ

Érythrée: Batatoli ya Yehova 28 babimi na bolɔkɔ

Na mokolo ya 04/12/2020, bandeko mibali 26 mpe bandeko basi 2 oyo bakangaki bango mpo na kondima na bango na Érythrée babimi na bolɔkɔ. Balekisi bambula kobanda na 5 tii na 26 na bolɔkɔ. Bango nyonso batikali sembo epai ya Yehova Nzambe kozanga kobuka mibeko na ye. Bandeko na mokili mobimba bazali na esengo ya koyoka nsango oyo ya esengo. Tozali mpe kokoba kokanisa bandeko na biso 24 oyo batikali na bolɔkɔ na Érythrée mpe kobondela mpo na bango.​—Misala 12:5.