Lakisá makambo oyo ezali na kati

ÉRYTHRÉE

Érythrée: Bansango na mokuse

Érythrée: Bansango na mokuse

Batatoli ya Yehova bazali kokutana na minyoko makasi na Érythrée. Guvɛrnema ya Érythrée ezali kokoba kokanga Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ, konyokola bango, mpe kotungisa bango banda ekólo yango ezwaki lipanda na 1993. Mokanda moko eutaki epai ya Prezida na mokolo ya 25/10/1994, elobaki ete Batatoli ya Yehova ya Érythrée “baboyi kozala bana-mboka” mpo baboyi kokɔta na makambo ya politiki to na mosala ya soda. Yango wana, guvɛrnema ebɔtɔli bango ntomo oyo moto nyonso asengeli kozala na yango.

Lokola banyokwami mingi mpe bamoni mpasi na boumeli ya bambula mingi, mingi na bango bakimá mboka na bango. Baoyo batikali na mboka na bango mbala na mbala bazali konyokwama mpe basengeli kozala ekɛngɛ ntango bazali kosala mosala nyonso etali lingomba na bango. Bakonzi ya Érythrée bakangisi Batatoli ya Yehova mingi mpe batye bango na bolɔkɔ na boumeli ya bambula mingi: basusu mpo baboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango mpe basusu mpo bazali kosala makita ya losambo, koyebisa basusu makambo ya Biblia to mpo na bantina oyo eyebani te. Bazali kokanga mibange, mibali mpe basi, na bantango mosusu bana mike. Lelo oyo, ezali na Batatoli misato oyo bazali na bolɔkɔ esali sikoyo mbula koleka 20. Moko te kati na bango basambisá ye to bakatelá ye etumbu.

Minyoko oyo Batatoli ya Yehova ya Érythrée bazali kokutana na yango ebendaki likebi ya mokili mobimba. Bakonzi ya Afrika, Mpoto, mpe États-Unis balandelaki bakonzi ya Érythrée mpo na likambo yango, kasi guvɛrnema yango esali eloko moko te mpo na kosilisa likambo yango. Batatoli ya Yehova basɛngaki mbala na mbala básolola na bakonzi ya Érythrée na Asmara mpo na kosilisa mikakatano yango, kasi guvɛrnema eboyi kokutana na bango.