Lakisá makambo oyo ezali na kati

Na lobɔkɔ ya mwasi: Ndeko mobali moko na ekipi ya kobongola mikanda na elobeli ya bababa ya Afrique du Sud azali kosala bajɛste ya mokanda moko ya Biblia. Lobɔkɔ ya mwasi: Mwasi moko ná mobali na ye bazali kotala video moko ya elobeli ya bababa ya Afrique du Sud na losambo na kati ya libota

25/01/2022
AFRIKA YA SUDI

Bakonzi na Afrique du Sud bapesi Batatoli ya Yehova longonya mpo na nyonso oyo bazali kosala mpo na bababa

Babuku mosusu mibale ya Biblia ebimi na elobeli ya bababa ya Afrique du Sud

Bakonzi na Afrique du Sud bapesi Batatoli ya Yehova longonya mpo na nyonso oyo bazali kosala mpo na bababa

Na Afrique du Sud, bato oyo balingaka kosunga bababa bapesi Batatoli ya Yehova matɔndi mpo bazali kosalisa bababa bábongisa bomoi na bango na nzela ya bavideo ya malamu mpenza oyo bazali kobimisa na elobeli ya bababa ya Afrique du Sud (SASL). Esalemaki nsima ya kobimisama ya mokanda ya Bagalatia mpe ya Baefese ya Libongoli ya Mokili ya sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na SASL na mokolo ya 15/11/2021. Na yango, mikanda zomi ya Biblia ebimisami na SASL. Mikanda mosusu minei ekobimisama na sanza ya 04/22. Moto akoki kozwa nyonso wana na jw.org mpe na programɛ JW Library Sign Language.

Minna Steyn, moto ya mayele na makambo ya kotángisa mpe molandi ya mokambi ya guvɛrnema ya Cap-Occidental alobaki boye mpo na Batatoli: “Nasepelaki mingi kotala video ya bato oyo basalaka bajɛste mpe nalingi kopesa bango longonya, bango ná ebongiseli na bango, mpo basaleli elobeli ya malamu mpenza mpo na bababa.”

Bongani Makama, mokambi ya lisangani ya bibosɔnɔ na Eswatini (Swaziland) alobaki boye: “Topesi Batatoli ya Yehova longonya mpo bazali kosala makasi mpo bababa mpe baoyo bayokaka malamu te bámona ete bazali na esika na kati ya mboka. Abakisaki boye: “[Bababa] babongi kozala na Biblia na monɔkɔ na bango. Yango wana tozali kopesa Batatoli ya Yehova longonya ndenge babimisi mikanda ya Biblia mpo na bababa na monɔkɔ oyo ekosimba mitema na bango. Tozali kozela mikanda nyonso 66 ya Biblia na monɔkɔ ya bababa.”

Na Afrique du Sud, bato oyo basalelaka SASL bazali pene na 450 000. Basakoli oyo bazali bababa to bato oyo bayokaka malamu te bazali 283 na Afrique du Sud. Mpo na milende oyo Batatoli bazali kosala, “bato ya ndenge nyonso” bazali kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, ata mpe bababa oyo bazali na teritware ya Betele ya Afrique du Sud.​—1 Timote 2:4.