Lakisá makambo oyo ezali na kati

5/6/2019
AFRIKA YA SUDI

Mbula makasi mpe mpela ezindisi Afrika ya sudi

Mbula makasi mpe mpela ezindisi Afrika ya sudi

Mbula makasi ebɛtaki na ɛsti ya Afrika ya sudi na nsuka ya sanza ya 04/2019. Lokola ebɛtaki mikolo mingi, esalaki ete mpela mpe potopoto ezindisa bisika mingi na Durban mpe na zingazinga na yango, na etúká ya KwaZulu-Natal. Balapolo ya sika emonisi ete bato soki 70 bakufaki na likama yango.

Filiale ya Afrika ya sudi elobi ete ata ndeko moko te azokaki to akufaki. Kasi, bandako ya mabota soki 19 ebebaki makasi na potopoto to na mpela. Mai ya mpela ebebisaki mpe Bandako ya Bokonzi soki misato.

Na litambwisi ya komite ya kopesa lisungi, Biro ya kosala baplan ya bandako/Bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko mpo na botongi bazali kosalisa komite yango mpo na koluka koyeba soki bandako oyo ebebi ekosɛnga kobongisa yango to te. Na bisaka oyo bomoi ya bandeko ezali na likama, bazali kosala nyonso mpo na kolongola bango na bisika yango.

Tondimi ete Yehova akokoba kosunga bandeko na biso ya Afrika ya sudi ndenge bakutani na mikakatano wana ya makasi.​—Nzembo 34:19.