Lakisá makambo oyo ezali na kati

6 SANZA YA 4, 2017
AUSTRALIE

Mopɛpɛ makasi babengi Debbie ebɛti Australie

Mopɛpɛ makasi babengi Debbie ebɛti Australie

Na mokolo ya 28/03/2017, mopepe makasi babengi Debbie ebɛtaki na nɔrdi ya Queensland mpe bisanga ya zingazinga, mopepe yango ezalaki na vitesi makasi ya 260 kilomɛtrɛ na ngonga. Mopɛpɛ yango epikolaki banzete, ekweisaki bandako mpe etindikaki bamasuwa na zɛlɔ na bingumba oyo ezali pembenipembeni ya ebale. Mai etondaki mpe makasi na bamboka oyo ezali na sudi ya etúká ya Queensland mpe na nɔrdi ya etúká ya Nouvelle-Galles du Sud, mpe bandako mingi ezalaki na kura te.

Balapolo ya liboso emonisi ete Motatoli ya Yehova moko te azokaki makasi to akufaki. Kasi mopɛpɛ yango ebebisi bandako mingi ya Batatoli ya Yehova mpe ebukaki moko. Ndako mibale ya Bokonzi (bisika ya losambo) mpe ebebaki.

Biro ya misala ya Batatoli ya Yehova na Australie esalaki komite mibale ya kopesa lisungi mpo na kobongisa ndenge ya kopesa baoyo bazwaki likama lisungi ya ba-groupe électrogène, bilei mpe mai. Batatoli ya Yehova ya etúká yango bazali mpe kolendisa bandimi ya lingomba na bango na elimo mpe kobɔndisa bango.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova eyeisi mosala ya kopesa lisungi pɛpɛlɛ ndenge ezali kosalela mbongo ya makabo oyo epesamaka mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba.

Bato oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Na mokili mobimba: David A. Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

Australie: Rodney Spinks, +61-2-9829-5600