Lakisá makambo oyo ezali na kati

Irina Zakharchenko ná Valida Jabrayilova na Baku

11 SANZA YA 12, 2017
AZERBAÏDJAN

Tribinale ya Azerbaïdjan efuti Irina Zakharchenko mpe Valida Jabrayilova

Tribinale ya Azerbaïdjan efuti Irina Zakharchenko mpe Valida Jabrayilova

Na mokolo ya 4/08/2017, tribinale ya etúká na Baku, na ekólo Azerbaïdjan elobaki báfuta Batatoli ya Yehova mibale, Irina Zakharchenko ná Valida Jabrayilova ndenge batyaki bango na bolɔko kaka mpamba na boumeli ya sanza 11. Atako mbongo oyo tribinale esɛngaki báfuta bango ezalaki moke na kotalela mpasi oyo bamonisaki bango, tribinale endimaki ete bakonzi bakatelaki basi yango etumbu kaka mpamba, banyokolaki bango na nzoto mpe na makanisi mpe babebisaki lokumu na bango.

Ekateli oyo Tribinale monene ezwaki epesi nzela ya kofuta basi yango

Na mokolo ya 8/02/2017, tribinale monene ya Azerbaïdjan ekweisaki bifundeli oyo bafundaki Zakharchenko ná Jabrayilova mpo bazalaki kokabola mikanda ya lingomba na bango kozanga ndingisa ya Leta. Tribinale emonaki ete Leta endimaki ete mwa buku yango Teyá mwana na yo ekɔta na mboka mpe ete ezali mabe te mpo na bana-mboka. Lisusu, tribinale emonaki ete basi yango bazalaki na lotomo ya koyebisa basusu makambo oyo bandimaka. Tribinale elobaki makambo yango na kolanda mibeko ya ekólo Azerbaïdjan oyo ebatelaka ntomo ya moto mpe mibeko ya mikili mosusu oyo Azerbaïdjan mpe etyá sinyatire.

Tribinale monene etikaki batribinale ya mike elandela likambo ya kofuta basi yango. Yango wana, Zakharchenko ná Jabrayilova bamemaki likambo yango na tribinale ya etúká Nasimi, na Baku, mpo ministere ya Finance efuta bango mpo na mpasi oyo bamonisaki bango epai ya bato ya Leta oyo balandelaka makambo ya kobatela bana-mboka (oyo ezalaki liboso ministere de la Sécurité nationale). Basi yango mibale bazalaki na tribinale, atako Zakharchenko azalaki na sante ya malamu te. Zuzi Shahin Abdullayev asɛngaki bango bálobela na mokuse makambo ya mpasi oyo bakutanaki na yango.

Tribinale endimi ete banyokolaki bango

Tribinale ya etúká emonisaki ete Azerbaïdjan endimaka mpenza kotosa ntomo ya bana-mboka mpe ekokokisa makambo oyo Batatoli ya Yehova basɛngi. Bafutaki Zakharchenko mosolo ya dolare 5737 ndenge sante na ye ebebaki makasi mpo na etumbu ya bolɔkɔ oyo bakatelaki ye, mpe bafutaki elenge Jabrayilova mosolo ya dolare 4828. Ekateli ya tribinale elobaki boye: “Tribinale emoni ndenge batyaki basi yango na bolɔkɔ kaka mpamba mpe bifundeli ya lokuta oyo bafundaki bango enyokolaki bango na makanisi.”

Ministere ya Finance eboyaki likanisi ya kofuta basi yango mbongo mpe esɛngaki bátalela lisusu ekateli yango. Kasi na mokolo ya 20/11/2017, tribinale ya Baku eboyaki bosɛnga yango mpe ebongolaki te ekateli oyo tribinale ya etúká ezwaki.

Ekateli yango ekobota mbuma malamu?

Na Azerbaïdjan, Batatoli ya Yehova bazali kokoba kosala makambo na bango ya losambo atako ntomo na bango ya bonsomi ya losambo ezali kotosama te mpe bazali kokanela bango. Bazali kokoba konyokola bango, kofutisa bango baamande mpe kosala bango makambo oyo ebongi te ntango bayanganaka na makita ya losambo to ntango basalaka makambo na bango mosusu ya losambo na kimya nyonso. Guvɛrnema etye naino te programɛ ya misala mosusu ya Leta na esika ya mosala ya soda mpo na baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Kaka na Baku nde lingomba ya Batatoli ya Yehova ekomamá na Leta, bakonzi ya bitúká mosusu bazali koboya kokomisa bango na buku ya Leta. Batatoli ya Yehova bazali kozela makambo 18 oyo ekatami naino te na tribinale ya mpoto mpo na ntomo ya moto mpe bamemaki bifundeli 11 na komite ya ONU oyo etalelaka ntomo ya moto, bifundeli oyo etali ndenge bazali konyokola Batatoli ya Yehova na Azerbaïdjan.

Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba bazali na elikya ete bikateli oyo tribinale euti kozwa ekolendisa bakonzi bátosa ntomo ya bandeko na bango na Azerbaïdjan.