Lakisá makambo oyo ezali na kati

04/02/2020
BRÉSIL

Bandeko bazali kopɛtola bisika oyo mbula makasi ebebisaki na Brésil

Bandeko bazali kopɛtola bisika oyo mbula makasi ebebisaki na Brésil

Banda na mokolo ya 18/01/2020, mbula makasi ebebisaki etúká ya Espírito Santo mpe ya Minas Gerais mpe ebebisaki biloko mingi kuna. Mai oyo etondaki na babalabala ebebisaki bandako, ememaki mituka mpe epikolaki banzete. Bakonzi balobi ete bato ebele basengelaki kotika bandako na bango mpe bato kokela 60 bakufaki.

Etúká ya Espírito Santo

Na engumba lokola Iconha mpe Alfredo Chaves, mbula yango ebebisaki bandako 9 ya Batatoli ya Yehova, epai bandeko na biso 27 bazalaki kofanda. Likambo ya esengo, ata ndeko na biso moko te azokaki to akufaki.

Batatoli ya Yehova soki 100 ya etúká mosusu bayaki kosalisa bandeko oyo bakutanaki na likama wana. Na litambwisi ya bankulutu, bandeko oyo bautaki na bisika mosusu bapesaki bandeko bilei, mai mpe bilamba. Basalisaki mpe bango na kopɛtola mpe kolongola pɔtɔpɔtɔ na bandako ya bandeko mpe ya baoyo bazali Batatoli ya Yehova te.

Etúká ya Minas Gerais

Ata ndeko na biso moko te azokaki to akufaki. Kasi, Bandako ya Bokonzi mitano ebebaki mpenza mpe mabota soki 50 ya Batatoli ya Yehova balongwaki na bandako na bango. Bandeko mosusu bazalaki na likoki te ya kobima na bandako mpo mai ya mbula oyo emataki ekangaki bango, mpe esengelaki bámata bwato na etaje ya mibale ya bandako na bango mpo bábika. Bandeko nyonso oyo balongwaki na bandako bakendaki kofanda na bandako ya bandeko na bango Batatoli ya Yehova.

Bakomite ya kopesa lisungi etyamaki ezala na etúká ya Espírito Santo mpe ya Minas Gerais mpo na kotambwisa mosala ya kopesa lisungi. Bakomite yango ezali kosala elongo na bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu ya mboka yango mpo na kolendisa na elimo mpe na mosuni bandeko oyo bazwi makama.

Tozali kokoba kobondela mpo na bandeko na biso wana oyo bakutani na makama wana ya mbula. Tozali kobondela Yehova apesa bango makasi, abɔndisa bango mpe asalisa bango na nzela ya bandeko na biso ya mokili mobimba.​—Nzembo 28:7.