Lakisá makambo oyo ezali na kati

25/6/2020
BRÉSIL

Bandeko oyo bafandi na Amazonie bazwi lisungi

Bandeko oyo bafandi na Amazonie bazwi lisungi

Maladi ya coronavirus ebimisi mikakatano mingi ya nkita na Brésil. Komite ya filiale ya Brésil esali bakomite 18 mpo na kosunga bandeko oyo bazali na bosɛnga. Bakomite yango ezali kosalisa masangá soki 12 000 na mboka wana mobimba, bakisa mpe bandeko oyo bafandi mosika mpenza na bamboka oyo ezali na ebale Amazone. Tii sikoyo, mabota 131 oyo bazali kuna na Amazonie, basili kozwa lisalisi.

Komite ya kosunga oyo ezali na Manaus, engumba-mokonzi ya etúká ya Amazonas, ebongiseli bandeko biloko oyo bakoki kosalela sanza mobimba. Na kati ya biloko yango okokuta, madesu, fufu, loso, miliki; na biloko ya kotya bopɛto na nzoto na ndakisa, sabuni, papye ya twalɛti, brɔsi ya mino na bankisi ya mino. Bandeko batindaki biloko yango na libongo ya masuwa ya Manacapuru oyo ezali pene wana, na nsima bandeko bakabolaki yango, mpe batindaki yango na bamasuwa na bisika ya mosika na ndakisa, na Membeca mpe na Lago de Castanho.

Ndeko mwasi Marinelma, oyo afandaka na etúká ya Lago de Castanho, alobi boye nsima ya kozwa biloko: “Libosoliboso, nazali kopesa Yehova matɔndi mpo azali kobatela biso. Tozalaki mpenza na mposa ya biloko yango mpo tozalaki na mbongo te ya kosomba bilei . Lisusu, nazali kopesa bandeko matɔndi ndenge bazali kokabela biso mpe ndenge bazali komonisela biso bolingo. Mwana na ngai ya mobali ya mbula 6 amonaki ndenge nazali kobongisa biloko, mpe nayebisaki ye ete Yehova asaleli bandeko na biso mpo básalisa biso. Na nsima mwana na ngai alobaki boye: ‘Mama, tokoki kobondela mpo na kopesa Yehova matɔndi?’”

Ndeko Jonas Monteiro, oyo ye na libota na ye bafandaka na engumba ya Caapiranga, atindelaki bandeko ya Komite ya kopesa lisungi mokanda, ndambo na yango elobi boye: “Matɔndi mingi mpo na lisalisi bopesi biso. Tomoni bolingo ya Yehova na nzela na bino. Ezali libaku malamu mpenza kozala na kati ya libota oyo ya mokili mobimba.”

Bandeko oyo basalaka na Komite ya kopesa lisungi na ntango ya likama mpe balendisamaki. Ndeko Isaac Emannuel Ramalho de Oliveira, moko ya bankulutu oyo azali na Komite ya kopesa lisungi alobi boye: “Kosala mokolo na mokolo na Komite ya kopesa lisungi, esalaka ete kondima na ngai ekóma makasi. Namoni ete mosala na ngai na Komite ya kopesa lisungi ekosalisa ngai mingi koleka ndenge nazali kosalisa bandeko.”

Ndenge Yehova azali kosalisa basaleli na ye na ntango oyo ya maladi mabe ezali kokómisa kondima na biso makasi, ezala soki tozali wapi.​—Nzembo 94:14.