Lakisá makambo oyo ezali na kati

08 SANZA YA 12, 2020
BULGARIE

Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato elongisi Batatoli ya Yehova na Bulgarie

Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato elongisi Batatoli ya Yehova na Bulgarie

Na mokolo ya 10/11/2020, Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato elongisaki Batatoli ya Yehova na Bulgarie mpe elobaki ete guvɛrnema ya Bulgarie ezali kobebisa ntomo ya bandeko na biso ya kozala na bonsomi ya losambo. Ekateli yango emonisi ete bakonzi basengeli kotika ete mosala ya kotonga Ndako ya Bokonzi ekoba na engumba Varna, na Bulgarie. Esali bambula koleka zomi banda bandeko bazalaki kobunda mpo bápesa bango nzela ya kotonga kuna. Longola yango, Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato epesi motindo ete Bulgarie efuta bandeko dolare 11 500 mpo na likambo yango.

Likambo yango ezalaki mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi na lopango moko oyo bandeko na biso basombaki na sanza ya 01/2006. Bakonzi ya Varna bapesaki nzela mpo mosala ya kotonga ebanda na sanza ya 05/2007, mpe bandeko na biso babandaki mbala moko kotonga. Kasi na sanza ya 07/2007, mokonzi ya mboka yango apekisaki mosala ya botongi, mpe alobaki ete bandeko bazali kotonga na ndenge oyo mibeko epekisi. Kaka na sanza yango, moto moko ya politiki oyo ayebanaki malamu abambaki papye moko na esika bandeko bazalaki kotonga mpe abongisaki kampanye moko mpo na kotinda bana-mboka bátɛmɛla mosala wana ya botongi.

Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato elobaki ete bakonzi ya Varna balobaki likambo oyo etindaki bato báloba mabe mpo na Batatoli ya Yehova, mpe oyo emonisaki ete “apesaki mabɔkɔ mpo na kotɛmɛla bango.” Mokonzi yango alobaki mpe azalaki kopesa mabɔkɔ na kampanye yango ya kotɛmɛla Batatoli ya Yehova na baradio to televizyo.

Mokonzi ya mboka yango mpe bakonzi mosusu bamonisaki polele ete bazali kokanisela Batatoli ya Yehova mabe. Kutu, balobaki ete soki bapekisaki mosala yango, ezalaki te mpo na kokabola mangomba, kasi ezalaki mpo Batatoli ya Yehova bazalaki kotonga na kolanda te mibeko ya Leta oyo etaleli botongi.

Bandeko na biso bakɔtisaki dosye yango na batribinale ndenge na ndenge ya Bulgarie, ata mpe na Tribinale monene, kasi esimbaki te. Na boumeli ya mwa ntango, bandeko ya lisangá yango bazalaki kofutela ndako moko mpo na kosala makita.

Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato elobaki ete ezali koyeba te mpo na nini bakonzi yango bazalaki kosala bongo. Kati na bazuzi 6, mitano bamonisaki ete ndenge bakonzi ya Varna apekisi bátonga Ndako ya Bokonzi, ezali kobuka mobeko etali “ntomo mpe bonsomi ya kokanisa, ya lisosoli mpe ya losambo” na kotalela artikle 9 mpe 11 ya Convention européenne des droits de l’homme.

Bandeko bazali kolikya ete bakonzi ya Varna bakotosa ekateli oyo Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato ezwaki mpe ete bakopesa bango nzela ya kokoba kotonga esika na bango ya losambo, oyo ekopesa matomba mpo na bato nyonso mpe oyo ekokumisa nkombo ya Yehova na engumba yango. Tozali kopesa Yehova matɔndi ndenge asundolaka bato na ye te.​—Nzembo 54:4.