Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Mudaheranwa ná mwasi na ye bazali babongisi-nzela, balingi kokende mosala

06/04/2020
CANADA

Bazali na kimya na ntango ya kobanga

Bazali na kimya na ntango ya kobanga

Ndeko Jean-Yves ná mwasi na ye, Vasthie Mudaheranwa, bazali kosalisa bato oyo bazali kobɛla coronavirus na Montréal, na Canada. Ndeko Mudaheranwa azali monganga oyo asalisaka maladi ya mpema, mpe ndeko mwasi Mudaheranwa azali infirmière na lopitalo oyo bazali kosalisa bato oyo babɛli maladi ya coronavirus. Na ntango oyo bato mingi bazali komitungisa, ndeko Mudaheranwa ná mwasi na ye bazali kotyela Yehova motema apesa bango makasi mpe bázala na ‘esengo na motema’ ndenge Yehova alakaki.​—Yisaya 65:14.

Ndeko Mudaheranwa alobi boye: “Baninga na ngai ya mosala bazali kobanga mingi mpenza, namoná bango naino boye te.” Ndeko mwasi Mudaheranwa alobi boye: “Boyekoli ya moto ye moko esalisaka mingi. Tokanisaka elembo ya mikolo ya nsuka, mpe tomonaka ete Yehova azali elongo na biso mpe akosundola biso te. Kobondela Yehova esalisaka biso mingi. Liboso ya kobima na ndako mpe ya kobanda mosala, nabondelaka, mpe nazwaka kimya.”

Ndeko Mudaheranwa ná mwasi na ye bazali kopesa biyano na makita

Ndeko Mudaheranwa alobi boye: “Nautá Rwanda, mpe nabikaki ntango bana-mboka babomanaki (génocide). Awa na Canada, totikalá koyoka likambo ya ndenge wana ata moke te, yango wana ntango mosusu tokoki kobosana ete tozali kobika na mikolo ya nsuka. Mpo na koloba solo, nazalaki ntango nyonso te kokanisa ete mokolo ya Yehova ekómi mpenza pene. Maladi mabe oyo elendisi mpenza kondima na ngai ete tozali mpenza kobika na mikolo ya nsuka, mpe elendisi kondima na ngai na Biblia mpe na bisakweli ya Biblia.”

Basaleli ya Yehova na mokili mobimba bazali na kondima ndenge moko na oyo ya ndeko Mudaheranwa ná mwasi na ye mpe bazali kokoba kozala na kimya na ntango oyo ya maladi mabe.​—Yisaya 48:18.