Lakisá makambo oyo ezali na kati

Tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka Corée na mokolo oyo ezwaki ekateli yango.

13/7/2018
CORÉE DU SUD

Kobongisa likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango: Ekateli oyo tozalaki kozela banda kala ete tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka Corée du Sud ezwa

Kobongisa likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango: Ekateli oyo tozalaki kozela banda kala ete tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka Corée du Sud ezwa

Na boumeli ya bambula soki 65, bilenge mibali oyo bazali Batatoli ya Yehova na Corée du Sud bakɔtaka bolɔkɔ mpo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Na mokolo ya minei, 28/06/2018, tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka Corée ebongolaki likambo yango ndenge elobaki ete Artikle 5, paragrafe 1 ya mibeko etali mosala ya soda eyokani te na mibeko ya mboka mpo guvɛrnema etyá te misala mosusu na esika ya mosala ya soda.

Bapanzi-nsango na libándá ya tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka. Bapanzi-nsango ya mikili ndenge na ndenge balandelaki likambo yango.

Bazuzi libwa, na litambwisi ya zuzi-mokonzi Lee Jin-sung, babimisaki ekateli oyo bazuzi motoba baponaki, ekateli oyo ekosala ete mibeko ya ekólo yango eyokana na mibeko ya mikili nyonso mpe endima bonsomi ya lisosoli, ya makanisi mpe ya bindimeli.

Bamonisi ya Batatoli ya Yehova na kati ya tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka liboso tribinale ezwa ekateli.

Motángo ya baoyo bakɔtaka bolɔkɔ mbula na mbula na Corée du Sud mpo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango eleki ya bikólo mosusu nyonso. Na bambula mosusu, bilenge mibali 500 tii 600 bakɔtaki bolɔkɔ na Corée du Sud. Nsima ya kobima bolɔko, baoyo nyonso baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango batalelamaka lokola bato ya mobulu bomoi na bango mobimba mpe yango esalaka ete kozwa mosala ekóma mpasi mpo na bango.

Kasi kobanda na 2011, bandeko mosusu bamemaki likambo na bango na tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka Corée mpo mibeko ya mboka yango etyá likambo mosusu te, kaka etumbu ya bolɔkɔ mpo na baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Lisusu, kobanda 2012, ata bazuzi mosusu oyo bazalaki kosepela te na likambo ya kopesa baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango etumbu batindaki likambo yango na tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka mpo etalela lisusu mibeko etali mosala ya soda.

Hong Dae-il, molobeli ya Batatoli ya Yehova na Corée azali koyanola na mituna ya bapanzi-nsango na libándá ya tribinale nsima ya ekateli ya tribinale

Tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka ezalaka na mokumba ya kokata soki mobeko moko eyokani na mibeko ya mboka Corée to te. Nsima ya kozongela mbala mibale mobimba (na 2004 mpe 2011) ete mobeko etali mosala ya soda endimami na mibeko ya mboka na bango, nsukansuka tribinale yango endimaki ete esengelaki kobongola makambo. Tribinale esɛngaki guvɛrnema ezongela kokoma mobeko yango mpe etya mosala mosusu na esika ya mosala ya soda na nsuka ya 2019. Lolenge ya misala mosusu oyo bakotya na esika ya mosala ya soda ekoki kozala kosala na opitale mpe na misala mosusu ya Leta oyo esalisaka bana-mboka.

Mpo na kosalisa biso tómona ntina ya ekateli yango, ndeko Hong Dae-il, molobeli ya Batatoli ya Yehova na Corée, alobi boye: “Tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka nde eleki batribinale mosusu nyonso ya mboka na likambo etali kobatela ntomo ya moto, euti koloba ete guvɛrnema esengeli kobongisa likambo yango. Bandeko na biso bazali kozela básala misala mosusu oyo bakopesa bango na esika ya mosala ya soda mpo na kosalisa bana-mboka, misala oyo ekobebisa lisosoli na bango te mpe ekoyokana na mibeko ya mikili mosusu.”

Ekateli monene oyo tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka ezwi ekopesa mpenza nzela ete tribinale monene endima lotomo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Ekateli oyo bazuzi nyonso ya tribinale monene bakozwa ekobongola ndenge ya kokata likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango.

Tribinale monene ekolobela likambo yango polele na likita na yango oyo ekosalema mokolo ya 30/08/2018, mpe na nsima tribinale ekozwa ekateli. Yango ekozala mbala ya liboso na mbula 14 ete bazuzi nyonso ya Tribinale monene bátalela lisusu likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango

Mpo na sikoyo, Parlema ya Corée ezali koluka kobongisa mobeko etali mosala ya soda

Ndeko Mark Sanderson ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobi boye: “Tozali kozela mpenza oyo Tribinale monene ekoloba. Bandeko na biso na Corée bandimaki komipimela bonsomi na bango mpo bayebi ete “soki moto moko, mpo na lisosoli na ye liboso ya Nzambe, azali kokanga motema na makambo ya mpasi mpe azali konyokwama atako asali mabe te, ezali malamu.” (1 Petro 2:19) Tozali na esengo ndenge nsukansuka tribinale endimi ete basalelaki bango makambo na kozanga bosembo mpe ete bamonisaki mpiko mpe bakangamaki na mateya oyo bandimaka.”