Lakisá makambo oyo ezali na kati

Libota moko ya Batatoli ya Yehova na Corée du Sud na kampanye yango

1 SANZA YA 3, 2018
CORÉE DU SUD

Batatoli ya Yehova na Corée du Sud basɛngi Prezida atalela likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango

Batatoli ya Yehova na Corée du Sud basɛngi Prezida atalela likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango

Makambo oyo euti kosalema mikolo oyo na Corée du Sud emonisi ete mbala mosusu guvɛrnema na bango ekotalela ndenge ya kobongola makambo na oyo etali kotosa ntomo ya moto. Na mokolo ya 7/12/2017, Prezida Jae-in Moon akutanaki na bakonzi oyo batalelaka ntomo ya moto na ekólo na bango (NHRC) mpe asɛngaki bango bápesa makanisi na oyo etali kobongisa lisusu ndenge ya kotosa ntomo ya moto mpo eyokana na mibeko ya mikili mingi. Prezida Moon atunaki bakambi ya NHRC makambo oyo guvɛrnema ekoki kosala mpenza mpo na kosilisa likambo ya kokanga baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango.

Lokola bapanzi-nsango balobelaki mingi likita yango, Batatoli ya Yehova babongisaki kampanye moko mpo na kosangisa basinyatire mpo na likambo oyo basɛngaki Prezida. Mibeko ya guvɛrnema yango na likambo etali kokɔtisa na bolɔkɔ baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango, enyokolaki Batatoli ya Yehova makasi na boumeli ya bambula mingi. Lokola Prezida Moon asɛngaki bakonzi ya guvɛrnema na ye báyanola na bosɛnga ya bana-mboka, likambo yango ezali kosɛnga lisalisi ya prezida mpo solisyo emonana na likambo ya baoyo banyokwami na boumeli ya bambula soki 70 mpo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango.

Biro ya Batatoli ya Yehova ezali kobongisa mikanda ya basinyatire

Nsima ya kosala kampanye yango na boumeli ya pɔsɔ minei mobimba, basilisaki mosala yango ya kokɔngɔla basinyatire. Bazwaki basinyatire epai ya bato koleka 14 000 oyo bakɔtaká bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango mpe basinyatire mosusu koleka 26 000 ya bato ya mabota na bango oyo banyokwamaki ntango bango bazalaki na bolɔkɔ.

Bakei kotika mikanda yango ya basinyatire na biro ya Prezida, 15/01/2018

Na mokolo ya 15/01/2018, bamonisi 6 ya Batatoli ya Yehova 41 275 oyo batyaki basinyatire yango, bakendaki kotika yango na biro ya Prezida. Na mokanda yango, Batatoli ya Yehova bamonisaki bɔtɔndi ndenge Prezida atyelaki likambo yango likebi, balobelaki mpe mpasi oyo bamonaki na boumeli ya mbula 70 mpo na bitumbu ya bolɔkɔ oyo bazalaki kopesa baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango; bamonisaki mpe matomba oyo ekólo ekozwa soki esilisi likambo yango. Na mokolo ya 16/01/2018, Biro ya Prezida etindelaki Ministère ya Défense mokanda yango mpo etalela yango.

Ntango bazalaki kobongisa mokanda yango, bamonisi ya Batatoli ya Yehova bakutanaki mpe na bakambi ya NHRC. Balakisaki bango bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisi mpo na nini Batatoli ya Yehova baboyaka mosala ya soda. Soki bapesi bilenge Batatoli ya Yehova misala mosusu na esika ya mosala ya soda, bakotikala kaka mpamba boye te na bolɔkɔ kasi guvɛrnema ekoki kosalela bango mpe kopesa bango misala oyo ekozala mpo na bolamu ya mboka. Bakambi yango bayebisaki Batatoli ya Yehova ete kobongisa likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango ezali likambo ya libosoliboso ya ntomo ya moto, oyo NHRC ekotyela yango likebi na 2018.

Soki tosangisi motángo ya baoyo bakɔtaka bolɔkɔ na mikili mosusu mpo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango, oyo ya Corée du Sud nde eleki mingi. Wana bakambi bazali kotalela mibeko ya guvɛrnema na bango oyo eumeli bambula mingi, Batatoli ya Yehova bazali na elikya ete likanisi wana ya sika ekotya nsuka na ebele ya bambula oyo sikoyo ekómi koleka 36 700 oyo bilenge nyonso ya Batatoli ya Yehova basali na bolɔkɔ mpo na koboya mosala ya soda.