Lakisá makambo oyo ezali na kati

30/08/2018
CORÉE DU SUD

Tribinale monene ya Corée du Sud eyoki makanisi ya bato mpo na likambo ya koboya mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli

Tribinale monene ya Corée du Sud eyoki makanisi ya bato mpo na likambo ya koboya mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli

Na mokolo ya 30/08/2018, tribinale monene ya ekólo Corée du Sud etalelaki na miso ya bato likambo ya Batatoli ya Yehova misato oyo baboyaki kosala mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Lokola bazuzi yango 13 balekisaki ngonga minei na kotuna mituna na baavoka ya Batatoli mpe bato mosusu mpo na koyeba soki ezali malamu to mabe, na kolanda mibeko, kokanga na bolɔkɔ bato oyo baboyi kosala mosala ya soda mpo na lisosoli na bango, yango emonisi ete likambo yango ezali kotungisa bato ebele ya ekólo yango. Bazuzi balekisaki ntango mingi na kolobela ekateli ya kokamwa oyo ezwamaki na tribinale oyo etalelaka mibeko na mokolo ya 28/06/2018, oyo esɛngaki ete bábimisa mosala mosusu kasi ya soda te mpo na bato oyo baboyi kosala yango na esika ya kotya bango na bolɔkɔ lokola nde basali likambo monene oyo ebuki mobeko. Baavoka yango basɛngaki bazuzi bándima ete bandeko wana misato bakwei na likambo te mpe básalela makanisi oyo ebimi na ntina ya likambo yango mpo na kosalisa batribinale ekoka kokata makambo koleka 900 ya ndenge wana, oyo ezali kozela básambisa yango. Tribinale monene ezali sikoyo na mokumba ya koyeba ntango nini mpe ndenge nini ekokata likambo ya Batatoli wana misato.

Na kondima nyonso, biso ná bandeko koleka 100 oyo bazali naino na babolɔkɔ, tozali kokoba na motema molai nyonso, kotalela Yehova Nzambe ya lobiko na biso.​—Mika 7:7.