Lakisá makambo oyo ezali na kati

Lee Gyo-won, Motatoli ya Yehova moko azali sikoyo na bolɔkɔ ya Daegu mpe akosala mbula moko na ndambo kuna mpo aboyaki mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye. Ye ná Batatoli ya Yehova mosusu koleka 100 oyo bazali na bolɔkɔ, bazali kozela likita ya tribinale monene oyo ekotalela likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango; likita oyo ekosalema mokolo ya 30/08/2018.

24 SANZA YA 8, 2018
CORÉE DU SUD

Elikya ya moto moko oyo aboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye ezali se kobakisama mpo etikali moke tribinale monene esala likita

Elikya ya moto moko oyo aboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye ezali se kobakisama mpo etikali moke tribinale monene esala likita

SÉOUL, Corée du Sud​—Na sanza ya 01/2017, Lee Gyo-won, elenge ya mbula 21 atɛlɛmaki liboso ya zuzi na elikya makasi mpe amibongisaki malamu mpo na kondimisa zuzi ete soki aboyi mosala ya soda, ezali mpo andimaka mpenza ete moto asengeli kosala makambo ya mobulu te, kasi te mpo alingi kobuka mibeko ya mboka na bango.

Lee, oyo azali Motatoli ya Yehova, azalaki mpenza na elikya te mpo ntango babandaki kosambisa ye, Batatoli ya Yehova 392 bazalaki na bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango mpe soki tosangisi bambula oyo bango nyonso basengelaki kosala na bolɔkɔ, esali mbula 588. Banda mobu 1950, Batatoli ya Yehova 19 340 bakateli bango etumbu ya bolɔkɔ mpe soki tosangisi mbula oyo bango nyonso basali na bolɔkɔ, esali mbula 36 800. Bakɔtaka bolɔkɔ mpo mibeko ya Corée elobaka ete kotosa lisosoli ezali ntina oyo ebongi mpenza te mpo na koboya mosala ya soda.

Kasi, banda 2004, bazuzi bakómaki komitungisa mpo na etumbu ya bolɔkɔ oyo bakatelaka baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango mpe balobaki ete Batatoli ya Yehova 90 basalaki mabe moko te. Na ndakisa, zuzi Choi Jong-du ya cour d’appel ya Busan amonaki ete ekateli na bango ya koboya mosala ya soda “euti na lisosoli moko oyo eteyami malamu na mateya ya lingomba na bango mpe basalaka yango na bosembo.”

Nsukansuka na sanza ya 06/2018, tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka ya Corée du Sud esɛngaki bátalela lisusu mobeko etali mosala ya soda mpo bátya mpe mosala mosusu ya Leta na esika ya mosala ya soda. * Kasi ekateli yango eyaki na retare mpo na likambo ya Lee; alobi boye: “Nsima ya kosɛnga batribinale mbala na mbala bátalela lisusu likambo na ngai, nakómaki na nsuka mpe sikoyo batye ngai na bolɔkɔ moko na Daegu.” Akosala mbula moko na ndambo na bolɔkɔ.

Lee akɔti na molɔngɔ ya Batatoli ya Yehova ya Corée oyo, banda eleko oyo Japon ezalaki kokonza Corée, bazalaki koboya mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Na 1939, bakɔtisaki bilenge mibale oyo bazalaki Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda, na nsima bakonzi bakangaki mpe Batatoli ya Yehova mosusu na Japon, na Taïwan mpe na Corée (oyo eyebanaki na ntango wana na nkombo Chosun). Bakɔtisaki Batatoli ya Yehova 38 na bolɔkɔ na Corée mpo baboyaki kokumisa amperɛrɛ ya Japon mpe baboyaki kopesa mabɔkɔ na bitumba. Mitano na bango bakufaki mpo banyokolaki bango mabe na bolɔkɔ mpe bamosusu mingi bazwaki bonsomi kaka nsima, ntango Japon elongaki te na Etumba ya 1945.

Mwa ndambo ya Batatoli ya Yehova 19 340 oyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango.

Batatoli ya Yehova baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango banda mbula koleka nkama moko. Lokola mateya oyo bandimaka eutaka na Biblia mpe balandaka ndakisa ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso, bandimaka mpenza ete bakristo basengeli te kopesa mabɔkɔ na bitumba mpo bazali na ndingisa te ya koboma moto mosusu. Longola yango, bakɔtaka na makambo ya politiki te, mpo bamitalelaka lokola bana-mboka ya Bokonzi to guvɛrnema ya Nzambe.

Ezalaki na Etumba ya liboso ya Mokili mobimba nde Batatoli ya Yehova (oyo bazalaki kobengama bayekoli ya Biblia) nde baboyaki mpo na mbala ya liboso komikɔtisa na bitumba mpo na kotosa mateya ya lingomba na bango, yango esalaki ete bato bátɛmɛla bango makasi. Batatoli ya Yehova soki 400 na Grande-Bretagne baboyaki kokomisa nkombo na mosala ya soda. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba na États-Unis, Batatoli ya Yehova nde bazalaki mingi na bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango; bango nyonso bazalaki soki 4 440.

Kasi na boyangeli ya Banazi nde Batatoli ya Yehova bamonisaki mpenza ete batosaka mateya na bango ndenge bandimaki koyika mpiko na minyoko ya makasi mpenza. Banazi babomaki Batatoli ya Yehova soki 400, mpo mingi na bango baboyaki mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Batatoli ya Yehova mosusu koleka 1 000 bakufaki liwa ya mpasi na bakaa ya bakangami mpe na babolɔkɔ mpo baboyaki kowangana kondima na bango. Robert Gerwarth, moto moko ya istware alobi boye: “Kaka bango nde Banazi banyokolaki mpo na makambo ya losambo.”

Kasi Batatoli ya Yehova na Corée nde basali bambula mingi ya bolɔkɔ mpo na koboya mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Lee Gyo-won, oyo tata na ye akufaki ntango ye azalaki na mbula mwambe, mama na ye nde ateyaki ye makambo ya Biblia mpe ntina ya kotosa lisosoli na ye. Alobi boye: “Ntango nayebaki ntina oyo Yehova Nzambe akelá biso, yango etindaki ngai nalinga ye mingi. Banda ntango yango, likambo eleki ntina mpo na ngai ezali ya kosalela Yehova bomoi na ngai mobimba.”

Lokola ayebaki ete akokaki kokɔta bolɔkɔ, Lee ayekolaki mosala ya kotonga bandako. Aponaki mosala oyo ekosɛnga te asala epai ya bato mpo lokoka esɛngaki akɔta bolɔkɔ, elingaki kozala mpasi azwa mosala nsima ya kobima bolɔkɔ.

Lee akanisi mokolo oyo asambaki; alobi boye: “Nazalaki na mposa ya komonisa ete nasalaki mabe moko te mpo ekateli na ngai eutaki mpenza na motema mpo na mateya oyo nandimaka mpe mpo na lisosoli na ngai.” Akanisaki ndakisa ya Setefano ná Paulo, bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo bakɔtelaki kondima na bango na mpiko nyonso liboso ya tribinale. Abakisi boye: “Namoni ete nalobaki malamu mpenza koleka ndenge nazalaki komekameka liboso nakende na tribinale.”

Tribinale monene ya Corée du Sud ekosala likita na mokolo ya 30/08/2018 mpo na kotalela ekateli ya tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka mpo na likambo ya baoyo baboyaka mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Ekateli oyo tribinale monene ekozwa ekobongola mpenza makambo mpo na badosye 900 ya kosamba oyo ezali kozela na tribinale. Lee azali na kati ya Batatoli ya Yehova 117 oyo bazali sikoyo na bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango mpe bazali kozela ekateli yango. Bazali na elikya ete prezida ya mboka na bango akolimbisa bango mpe bakobimisa bango na bolɔkɔ. Atako na mokolo ya 30/08/2018 Lee akozala kaka na bolɔkɔ, kasi akolanda na mposa makasi ndenge bakokata likambo yango.

Atako batyaki ye na bolɔkɔ mpe baboyaki asamba lisusu, Lee azali na elikya mpo na oyo ezali kozela bandimi ya lingomba na ye; alobi boye: “Nakanisi ete nakozala na molɔngɔ ya bato ya nsuka oyo bakɔtisi bango bolɔkɔ mpo balingaka bato; kasi na koleka nyonso, mpo balingaka Nzambe mpe mibeko na ye.”

Bato oyo bapanzi nsango bakoki kobenga:

Mpo na mokili mobimba: Paul Gillies, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

Corée du Sud: Hong Dae-il, +82-31-690-0055