Lakisá makambo oyo ezali na kati

17/09/2020
ÉTATS-UNIS

Mɔtɔ ezali kaka kotumba bazamba na wɛsti ya États-Unis

Mɔtɔ ezali kaka kotumba bazamba na wɛsti ya États-Unis

Esika

Californie, Oregon, mpe Washington

Likama

  • Mɔtɔ ya zamba ezali kozikisa na lombangu mpenza mpe etumbi zamba koleka ektare milio mibale, banda na Californie tii na Washington

  • Mɔtɔ ezali kokoba kobebisa mopɛpɛ, kopema mopɛpɛ yango ekómi likama

  • Ezali moko ya mɔtɔ ya monene mpe ya makasi koleka mɔtɔ nyonso oyo etumbá bazamba na Californie

Makambo oyo ekómeli bandeko na biso

  • Basakoli 4 546 bakimaki

Bandako oyo ebebi

  • Ndako 61 ebebaki mpenza kobeba

  • Ndako 16 ebebaki mingi te

Lisungi

  • Komite ya kopesa lisungi, bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu ya masangá bazali kokoba kotambwisa makambo mpo na kosalisa bandeko oyo batikaki bandako na bango, wana bazali mpe kolanda malako oyo etali maladi ya COVID-19

Bandeko oyo bakutani na likama bazali kopesa Yehova matɔndi mpo na lisungi oyo bazwi na nzela ya ebongiseli ya Nzambe. Ndeko mwasi moko oyo ndako na ye ebebaki alobi ete bandeko na biso bazalaki “pene ya kopesa biso eloko nyonso oyo tosengelaki na yango liboso kutu tóyeba ete tosengeli na yango.”

Atako bandeko na biso oyo bazali na esika mɔtɔ ezali kotumba bazamba bazali kaka kokutana na mikakatano, bazali kokoba komona bolingo ya motema ya Yehova mpe motema mawa na ye.​—Yakobo 5:11.