Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge koningana ya mabele ebukaki esika oyo

15/7/2019
ÉTATS-UNIS

Mabele eningani na sudi ya Californie

Mabele eningani na sudi ya Californie

Kobanda na mokolo ya 04/07/2019, mabele eninganaki makasi na sudi ya Californie na esobe ya Mojave. Koningana wana ya mabele ezali moko ya koningana oyo eleki makasi na esika yango na bambula 20 oyo eleki.

Koningana ya mabele yango esalemaki pene ya engumba Ridgecrest, epai basakoli 215 bafandaka. Matɔndi mingi mpo ata ndeko moko te azokaki makasi. Kasi, basakoli misato bazokaki mwa moke, mpe ndenge lapolo ya liboso emonisi yango, bandeko 7 balongwaki bisika bazalaki kofanda. Lisusu, bandako 7 ya bandeko na biso ebebaki makasi mpenza mpe bandako 35 ebebaki mwa moke. Longola yango, Bandako ya Bokonzi mibale ebebaki mwa moke.

Bakɛngɛli ya zongazonga mibale bazali kotambwisa mosala ya kopesa lisungi na esika yango. Bakɛngɛli yango ná bankulutu mosusu bazali kobɔndisa mpe kolendisa bandeko oyo bakutanaki na likama yango.

Tozali kobandela Yehova akoba kopesa bandeko na biso bwanya mpo báyeba komibatela na makama oyo ebimaka kaka yango moko lokola oyo.​—Masese 2:6-8.