Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge engumba Alabama etikali nsima ya kobɛta ya mopɛpɛ makasi

21/01/2020
ÉTATS-UNIS

Mbula mpe mipɛpɛ ya makasi ebebisi bamboka ya sudi mpe ya kati ya wɛsti ya États-Unis

Mbula mpe mipɛpɛ ya makasi ebebisi bamboka ya sudi mpe ya kati ya wɛsti ya États-Unis

Ndeko Albert Barnett ná mwasi na ye, ndeko Susan Barnett, ya lisangá ya Wɛsti na Tuscaloosa, na Alabama

Mbula mpe mipɛpɛ ya makasi ebebisaki bamboka ya sudi mpe ya kati ya wɛsti ya États-Unis na mokolo ya 11/01/2020 mpe ya 12/01/2020. Mikolo mibale ya mbula makasi mpe mipɛpɛ makasi ebebisaki bandako na bitúká mingi. Likambo ya mawa, ndeko Albert Barnett oyo azalaki na mbula 85 ná mwasi na ye, ndeko Barnett, oyo azalaki na mbula 75, bakufaki ntango mopɛpɛ yango ebukaki ndako na bango.

Filiale ya États-Unis elobi mpe ete bandako soki minei ya bandeko na biso mpe Bandako ya Bokonzi mibale ebebaki mwa moke. Longola yango, mipɛpɛ yango ebebisaki biloko ya kotɛka ya ndeko na biso moko.

Bankulutu ya mboka yango mpe bakɛngɛli ya zongazonga bazali kosalisa bandeko yango na mosuni mpe kolendisa bango na makambo ya Nzambe. Toyebi ete Tata na biso ya likoló, Yehova, azali kobɔndisa bandeko na biso oyo bazali na mpasi na motema mpo na likama yango.​—Nzembo 34:18.