Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mituka oyo mpela ememaki na lopango ya libota moko ya Batatoli na Harlingen, na Texas

10/7/2019
ÉTATS-UNIS

Mipɛpɛ makasi mpe mpela ebebisi sudi ya Texas

Mipɛpɛ makasi mpe mpela ebebisi sudi ya Texas

Na mokolo ya 24/06/2019, mbula mpe mipɛpɛ ya makasi ebebisaki sudi ya Texas. Bansango emonisi ete ebele ya bandako ezindaki mpe bato koleka 100 balongwaki bisika bazalaki kofanda mpo na kokende kofanda na bisika mosusu.

Ata bongo, mosakoli ata moko te azokaki na mopɛpɛ makasi yango, basakoli 47 balongwaki kuna. Lisusu, mopɛpɛ yango ebebisaki bandako 65 ya bandeko na biso, ezala mpe ndako moko oyo ekangamaki na Ndako ya Bokonzi.

Bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu ya mboka yango bazali kobɔndisa mpe kolendisa bandeko oyo bakutani na likama yango. Lisusu, komite ya kopesa lisungi ezali kotambwisa makambo mpo na kobongisa bandako mpe kopesa bilei, mai mpe bilamba. Bibongiseli esí ezwami mpo na kopɛtola mpe kobongisa bandako ezala mpe ndako oyo ekangamaki na Ndako ya Bokonzi.

Tokokoba kosunga bandeko na biso na sudi ya Texas, lokola bazali kotyela Yehova motema mpe kolekisa eleko wana ya mpasi.​—Yisaya 26:3, 4.