Lakisá makambo oyo ezali na kati

8/09/2021
ÉTATS-UNIS

Mopɛpɛ makasi babengi Ida ebimisi makama mingi na sudi mpe na nɔrdi ya États-Unis

Mopɛpɛ makasi babengi Ida ebimisi makama mingi na sudi mpe na nɔrdi ya États-Unis

Na mokolo ya 29/08/2021, mopɛpɛ makasi babengi Ida ebɛtaki pene ya libongo ya Fourchon, na Louisiana. Mopɛpɛ makasi mpe mbula ya makasi esalaki ete mai ekóma mingi na penepene ya libongo, mpe ebimisi. Yango ebimisi makama mingi mpenza na ndakisa mpela ya makasi, bandeko mingi ebebi mpenza mpe bato mingi bazangi lotiliki to kura. Na mokolo ya 01/09/2021, lokola mopɛpɛ makasi yango ebɛtaki mpe klima ebebaki, yango esalaki ete mai etondana mpe mipɛpɛ makasi na nɔrdi. Na bisika mosusu, ekosɛnga na bato bázela ata nsima ya bapɔsɔ mpo lotiliki ekoka kozonga.

Makama oyo ekomeli bandeko na biso

  • Atako mosika, tozwi naino te nsango ete bandeko na biso bakufi

  • Bandeko na biso mibale bazoki mwa bampota

  • Ndeko na biso moko ya mwasi azali na lopitalo mpo azokaki makasi ntango azalaki kokima likama

  • Bandako 1 429 ya bandeko na biso ebebaki mwa moke

  • Bandako 183 ya bandeko na biso ebebaki makasi mpenza

  • Bandako 9 ya bandeko na biso ebukanaki nyonso

  • Bandako ya Bakonzi 3 ebebaki mwa moke

  • Bandako ya Bokonzi 10 ebebaki makasi mpenza

  • Bandako ya mayangani 4 ebebaki mwa moke

Mopɛpɛ makasi ebebisaki Ndako ya ndeko mwasi moko na engumba ya New Orleans, na etúká ya Louisiana

Lisungi

  • Bakɛngɛli ya zongazonga, bankulutu mpe Komite mpo na kopesa lisungi na ntango ya likama elendisaki bandeko oyo bakutanaki na makama

  • Lisungi oyo topesaka bandeko na biso oyo bakutani na makama esalemaka na lombangu mpo na kosunga bandeko na biso oyo bazali na mposa ya lisalisi

  • Mosala nyonso ya kosalisa bandeko na biso na ntango ya likama esalemaki na kolanda malako ya komibatela na maladi mabe ya Coronavirus

Bandeko na biso bamibongisaki malamu mpe bayebaki likambo nini oyo bakoki kosala ntango likama ebimi. Batosaki mpe bakonzi ya Leta na likambo etali kolongwa na esika oyo likama ezali, nyonso wana esalisaki bandeko na biso bábatela bomoi na bango.​—Masese 22:3.