Lakisá makambo oyo ezali na kati

14 SANZA YA 08, 2020
ÉTATS-UNIS

Mopɛpɛ makasi babengi Isaias ebebisi biloko mingi na ɛsti ya États-Unis

Mopɛpɛ makasi babengi Isaias ebebisi biloko mingi na ɛsti ya États-Unis

Esika

Ɛsti ya États-Unis

Likama

  • Mopɛpɛ makasi babengi Isaias ebɛtaki na Caroline du Nord na mokolo ya 3/08/2020

  • Mopɛpɛ yango ememaki ebele ya mipɛpɛ misusu ya makasi ntango ezalaki kopusana na ɛsti ya États-Unis. Epanzaki biloko mpe ekataki kura

Makambo oyo ekómeli bandeko na biso

  • Ndeko moko ya mwasi azokaki

  • Mabota 12 balongwaki bandako na bango mpo na mwa ntango

Bandako oyo ebebaki

  • Bandako 55 ya bandeko na biso ebebaki mwa moke

  • Bandako 31 ebebaki makasi

  • Mituka mosusu ebebaki

  • Bandako ya Bokonzi 5 ebebaki makasi

Lisungi ya bandeko

  • Na kolanda malako mpo na komibatela na COVID-19, bakɛngɛli ya zongazonga elongo bankulutu ya masangá ya bisika oyo mopɛpɛ ebɛtaki, bazalaki kobɔndisa mpe kosalisa bandeko ya bisika yango

Tozali na esengo mpo Yehova azali kokoba kosalisa bandeko oyo bakutanaki na likama ya mipɛpɛ mabe wana. Tozali kozela na mposa makasi mokolo oyo bato nyonso bakoyoka lisusu te “nsɔmɔ ya mpasi” ya makama oyo ebimaka yango moko.​—Masese 1:33.