Lakisá makambo oyo ezali na kati

19 SANZA YA 10, 2020
ÉTATS-UNIS

Mopɛpɛ ya makasi babengi Delta ebɛti engumba Louisiane

Mopɛpɛ ya makasi babengi Delta ebɛti engumba Louisiane

Esika

Engumba Louisiane ná sudi-wɛsti ya engumba Texas

Likama

  • Na mokolo ya 09/10/2020, mopɛpɛ moko ya makasi ebɛtaki na sudi-wɛsti ya engumba Louisiane. Yango ebimisaki makama mingi, bakisa mpe makama oyo mopɛpɛ mosusu ya makasi babengi Laura ebimisaki kaka na engumba yango

  • Mopɛpɛ makasi yango ememaki mbula moko ya makasi oyo ezindisaki bandako mpe ekataki kura na bisika mingi

Makambo oyo ekómeli bandeko na biso

  • Basakoli 1 583 batikaki bandako na bango mpo na kokende kofanda bisika mosusu

Bandako oyo ebebaki

  • Bandako 216 mpe Bandako ya Bokonzi 16 ebebaki mwa moke

  • Bandako 7 ebebaki makasi mpenza

  • Bandako 3 ebukanaki nyonso

Lisungi ya bandeko

  • Bakɛngɛli ya zongazonga ná bankulutu bazali kosalisa bandeko oyo bakutani na likama yango, bazali kopesa bango bilei, mai ya komɛla, bisika ya kofanda mpe bongo na bongo. Misala nyonso wana ezali kotambwisama na Komite ya kopesa lisungi oyo etyamaki ntango mopɛpɛ makasi babengi Laura ebɛtaki engumba yango. Bandeko na biso bazali kotosa malako nyonso na oyo etali maladi ya COVID-19 mpo na komibatela

Bankulutu bazali sikoyo kokende kotalaka bandeko mbala mingi mpo na kolendisa bango. Moko ya bankulutu yango alobi boye: “Mpiko oyo Yehova azali kopesa bandeko yango ezali mpenza kokamwisa. Ntembe ezali te, ezali mpenza ‘nguya oyo eleki makasi.’”​—2 Bakorinti 4:7.

Topesi Yehova matɔndi ndenge azali kokoba kozala “ekimelo mpe esika ya komibomba” mpo na bandeko na biso oyo bakutani na makama wana nyonso.​—Yisaya 4:6.