Lakisá makambo oyo ezali na kati

07 SANZA YA 09, 2020
ÉTATS-UNIS

Mopɛpɛ ya makasi babengi Laura ebuki mabele na engumba Louisiane

Mopɛpɛ ya makasi babengi Laura ebuki mabele na engumba Louisiane

Esika

Arkansas, Mississippi, wɛsti ya Louisiane, mpe ɛsti ya Texas

Likama

  • Mopɛpɛ ya makasi babengi Laura oyo ebɛtaki na wɛsti ya Louisiane na mokolo ya 27/08/2020, ebimisaki makama mingi, na ndakisa, bandako ya bato ebebaki mpe kura ekatanaki

Makambo oyo ekómeli bandeko na biso

  • Tozali na mawa ya koyebisa bino ete ndeko na biso moko ya mwasi ya mobange akufaki ntango minganga bazalaki komema ye na lopitalo

  • Ndeko mosusu ya mwasi azokaki mwa bampota

  • Basakoli 3 992 batikaki bandako na bango mpo na kokende kofanda na bisika mosusu mpo na mwa ntango

Bandako oyo ebebaki

  • Bandako 10 ya bandeko ebebaki mpenza

  • Bandako 95 mpe Bandako ya Bokonzi 4 ebebaki makasi

  • Bandako 192 mpe Bandako ya Bokonzi 16 ebebaki mwa moke

Lisungi ya bandeko

  • Filiale ya États-Unis etyaki Komite ya kopesa lisungi

  • Bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu bazali kosala makasi mpo na kosalisa basakoli oyo batikaki bandako na bango mpo bázwa bisika ya kofanda

Likambo oyo esalemi

  • Bandeko oyo bazali zingazinga bapesaki bandeko oyo batikaki bandako na bango bisika ya kofanda, bango nyonso batosaki mibeko etali komibatela na maladi ya COVID-19. Moko ya bandeko oyo batikaki bandako na bango alobaki boye: “Tozali komona nde mapamboli ya Yehova na makambo oyo nyonso!”

Ndenge batosaki malako mpe basalisaki bandeko na bango na ntango ya mpasi, bandeko na biso na bisika oyo mopɛpɛ makasi ebɛtaki, ‘bazali kopesa ndakisa malamu ete bazali basaleli ya Nzambe.’​—2 Bakorinti 6:4.