Lakisá makambo oyo ezali na kati

23/08/2019
ÉTATS-UNIS

St. Louis, États-Unis—Liyangani oyo esangisaka mikili mingi ya Batatoli ya Yehova 2019 “Bolingo esilaka soki moke te”!

St. Louis, États-Unis—Liyangani oyo esangisaka mikili mingi ya Batatoli ya Yehova 2019 “Bolingo esilaka soki moke te”!
  • Dati: 16-18/08/2019

  • Esika: The Dome at America’s Center na St. Louis, Missouri, États-Unis

  • Programɛ esalemaki na minɔkɔ oyo: Anglais, Croate

  • Motángo eleki monene: 28 122

  • Bato oyo bazwaki batisimo: 224

  • Bandeko oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge: 5 000

  • Bafiliale oyo ebengisamaki: Afrika ya Sudi, Argentine, Australasie, Bretagne, Canada, Europe Centrale, Colombie, Croatie, Tchèque-Slovaquie, Finlande, France, Japon, Philippines, Pologne, Portugal, Scandinavie, Serbie

  • Makambo ya malamu oyo ebendaki likebi ya bato: Martin Gulley, molobeli ya kompanyi ya mobembo Metrolink, alobaki boye: “Okoki koloba ete olingaka moto moko boye. Okoki koloba ete olingaka eloko moko boye. Kasi tii mokolo oyo okomonisa yango na misala, wana ezali mpenza bolingo te. Bino Batatoli ya Yehova bomonisaka bolingo na misala. Bomikitisaka na oyo bosalaka, mpe bolingo esalaka ete bómikitisa. Nayebani lokola mosali ya kompanyi Metrolink na makarɔ oyo. Kasi yo oyebani lokola Motatoli ya Yehova na bolingo oyo omonisaka.”

    Jerry Vallely, molobeli ya kompanyi Bi-State Development (kompanyi moko oyo esalaka ete nkita ya etúká St. Louis emata), abakisi boye: “Bokanisaka kaka te ndenge ya kobongisa makambo. Bokanisaka mpenza nde bato oyo bakozwa matomba na mosala oyo bozali kosala; ezala ezali baninga oyo bazali kouta na engumba to na mboka oyo bozali kotambola elongo, to ezala biso awa na Metrolink. Bozali kokanisa mpo na makambo nyonso oyo etali moto nyonso oyo bosalaka elongo mpe kosala nyonso oyo bokoki mpo na kosala ete makambo ezala malamu to malamu koleka.”

 

Bandeko basi mpe mibali bazali kozela na libándá ya mpɛpɔ ya International St. Louis Lambert mpo na koyamba bandeko oyo bauti na mikili mingi

Bandeko oyo bauti na mikili mingi bazali kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso elongo na bandeko ya mboka na St. Louis

Bandeko basi mpe mibali bazali kopɛtola esika ya liyangani oyo babengi “The Dome,” liboso liyangani ebanda

Bato misato kati ya bato 224 ya sika bazali kozwa batisimo

Ndeko David Splane, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azali kosala diskur ya nsuka na mokolo ya misato ya liyangani ya etúká

Bandeko oyo bauti na mikili mingi bazali kosɛka na esengo wana bazali kolanda liyangani

Na mokolo ya lomingo, bandeko oyo bamipesá kaka na mosala ya ntango nyonso oyo bauti na mikili mingi bazali kopepa mabɔkɔ mpo na kopesa bayangani mbote ya bokabwani

Bandeko oyo bauti na mikili mingi ná bandeko ya mboka yango batɛlɛmi mpo na kokanga fɔtɔ

Bandeko oyo bauti na mikili mingi bazali kosepela komona mwa banyama na Zoo ya Saint Louis

Bandeko oyo bauti na mikili mingi bazali kotala Biblia moko ya kala mpenza, oyo ezalaki libongoli ya liboso ya mobu 1611 ya King James Version​—efungwami na Nzembo 83:18, na Bibliothèque publique ya St. Louis. Bibliothèque yango ebongisaki ete Biblia yango efungwama na lokasa yango mingimingi mpo na bandeko oyo bauti na mikili mingi bámona yango

Bilenge basi mpe mibali bazali koyemba na mwa bokutani na mpokwa