Lakisá makambo oyo ezali na kati

28 SANZA YA 4, 2017
ÉTATS-UNIS

Bato pene na 400 basali vizite ntango Biro monene ya sika ya Batatoli ya Yehova efungolaki baporte na yango

Bato pene na 400 basali vizite ntango Biro monene ya sika ya Batatoli ya Yehova efungolaki baporte na yango

NEW YORK. Mokolo ya pɔsɔ oyo euti koleka, Biro monene ya sika ya Batatoli ya Yehova efungolaki baporte na yango mpo bato básala vizite na bandako na bango oyo bauti kotonga sika na Warwick, New York. Ndeko Troy Snyder, oyo azali na mokumba ya kokɛngɛla Biro yango alobi boye: “Bato soki 1 150 bayaka mikolo nyonso kosala vizite awa na boumeli ya pɔsɔ. Kasi tolingi kofungola baporte ya Biro na biso na wikende oyo mibale mpo na kopesa bato ya kartye na biso matondi mpe bato mosusu nyonso oyo bapesaki biso mabɔkɔ ntango mosala oyo ya kotonga ezalaki kosalema.”

Bato nyonso oyo bayaki kosala vizite yango bazalaki 395, na kati na bango bato 205 ya komine ya wana mpe bato 190 oyo bazalaki kotɛkɛla biso bisaleli ya botongi. Bapesaki bango mwa eloko ya komɛla mpe balakisaki bango video ya miniti 40 oyo na nsima ezalaki na mituna mpe biyano.

Christopher Gow, afandaka na Tuxedo Park, New York, azali na komite oyo etalaka banzete na engumba Warwick.

Christopher Gow, oyo afandaka na Tuxedo Park, pene ya Biro na biso, alobaki boye: Nasepelaki ndenge babengisaki biso tósala vizite mpe yango ebendaki likebi na ngai mpe nandimaki koya. Nayebaki ete bazali kosala misala ya kotonga, kasi lokola basalaki yango na kimya mpe na limemya, ezalaki lokola bazali kosala eloko te.”

Lokola Batatoli ya Yehova batongaki Biro na bango ya sika pembenipembeni ya Laki ya bleu, na Sterling Forest State Park, bato mingi ya kartye yango balobaki ete bayaki kosala vizite yango mpo bámona soki Batatoli ya Yehova basalaki nini mpo na zamba mpe mai ntango bazalaki kotonga bandako yango.

Richard Hull, oyo azalaká profesɛrɛ ya istware na iniversite ya New York mpe ayebi istware ya Warwick malamu.

Richard Hull, oyo azalaká profesɛrɛ ya istware na iniversite ya New York, mpe afandaka na engumba Warwick mpe ayebi istware na yango, alobi boye: “Esali sikoyo mbula koleka 50 banda nayekolaka etúká oyo. Batatoli ya Yehova basali milende mpenza mpo na kobatela zamba mpe mai ntango bazalaki kotonga esika oyo, babateli kutu mwa banyama oyo ezalaka na parkɛ oyo.”

Nsima ya kosala vizite yango, Gow, oyo azali mpe na komite oyo etalelaka makambo ya banzete na Tuxedo Park, alobaki boye: “Eloko nyonso ezali kitoko mpenza; Batatoli ya Yehova basali mosala kitoko mpenza! Ndenge bobateli zamba, mai epesi biso mayele mpe bozali ndakisa oyo biso nyonso tokoki komekola.”

Nsima ya kotambwisa baoyo bayaki kosala vizite, bamemaki bango na bisika misato oyo bakokaki kotala bango moko biloko oyo totyaki na etaje ya likoló mpe na nse na yango, na ebandeli ntango ozali kokɔta na lopango ya Biro. Bisaka yango mibale batye istware ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe misala oyo bazali kosala sikoyo, kasi na esika ya misato, batye Babiblia oyo emonanaka lisusu te mpe biloko mosusu ya kala oyo ezali na boyokani na Biblia.

Hull asukisi boye: “Esika oyo etongami na kolanda teknoloji ya sika. Emonani ete liboso etongama bato bakanisaki mingi mpe bamibongisaki mpenza. Naino natali musée te, kasi nazali na mposa ya kozonga nokinoki awa mpo na kosala vizite yango.”

Snyder alobaki boye:” “Tomoni ete ebongi tópesa bato ya kartye na biso matondi mpo na ndenge bayambaki biso mpe bapesaki biso mabɔkɔ ntango toyaki kobanda misala na biso awa. Yango wana tobongisaki vizite oyo mibale mpo na bandeko na biso ya kartye oyo bazali Batatoli ya Yehova te.” Baoyo tobengisaki kasi bayei te, tozali na elikya ete bakoya samedi oyo ekolanda mpo na vizite ya mibale oyo tobongisi mokolo ya 29/04, kobanda ngonga ya 10h00 tii 16h00.

Moto oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Mpo na mokili mobimba: David A. Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000