Lakisá makambo oyo ezali na kati

27 SANZA YA 4, 2015
ÉTATS-UNIS

Dorothy Covington, mwasi ya avoka Hayden Covington, akufi na mbula 92

Dorothy Covington, mwasi ya avoka Hayden Covington, akufi na mbula 92

Na mokolo ya 14/03/2015 na Cincinnati, na Ohio, na États-Unis, Dorothy Mae Sennett Covington akufi na mbula 92. Na bambula 1940 mpe 1950, abundelaki Batatoli ya Yehova na batribinale mpo bákoka kozwa bonsomi ya bana-mboka.

Na kati ya etumba mpo na kozwa lotomo ya bana-mboka

Na bambula 1940, Dorothy asalaki elongo na avoka Victor Schmidt, oyo azalaki Motatoli ya Yehova mpe oyo azalaki kokɔtela lotomo ya bana-mboka ya Batatoli ya Yehova. Na ntango wana, banyokolaki Batatoli ya Yehova mpo baboyaki komonisa bolingo ya ekólo ndenge bato mosusu bazalaki komonisa yango na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Lokola Batatoli bazalaki te kosala milulu ya ekólo mpe mosala ya soda, bato babandaki kosepela na bango te. Mokanda moko (Lustre of Our Country) elobi ete “minyoko oyo Batatoli bakutanaki na yango kobanda 1941 tii 1943 ezalaki mpenza ndenge moko ya mabe ya kotɛlɛmɛla lingomba oyo esalemaki na Amerika na siɛklɛ ya 20.”

Ebele ya bato bazalaki kobɛta Batatoli mpe bazalaki kokanga Batatoli na États-Unis, ezala mpe na Cincinnati, na Ohio, mpe Indiana. Victor Schmidt azalaki kosala mibembo mpo na kokende kokɔtela Batatoli ya Yehova oyo bakangi bango kaka mpamba. Dorothy asukaki kaka te na kosalisa Schmidt na biro mpo na makambo ya mibeko, atɛlɛmɛlaki na mpiko nyonso mobulu oyo ebele ya bato basalaki ye ntango azalaki kosakola.

Likambo oyo ebendaki likebi ya Dorothy, ezali makambo oyo etindaki ebele ya bato básala mobulu na Connersville, na Indiana. Na 1940, Tribinale monene endimaki likambo ya kopesa drapo losako, na lisambisi ya Minersville School District ná Gobitis, kaka mikolo 17 nsima, polisi ya Connersville ekangaki Batatoli 6 mpe elobaki bafingi drapo mpo baboyi kopesa elembo ya drapo ya Amerika losako. Ezalaki na engumba Connersville nde Victor Schmidt ná Hayden Covington, oyo azalaki mopesi-toli ya Batatoli ya Yehova kobanda 1939 tii 1963, bakɔtelaki Batatoli mibale oyo na nsima bakoselaki bango makambo ete basali likita mabe.

Victor Schmidt

Nsima ya kosamba, M. Covington akendaki mbala moko kozwa aviɔ mpo na kokende kosamba na Maine, kasi Victor Schmidt ná mwasi na ye batikalaki mpo na kozela ekateli ya tribinale. Na nsima ebele ya bato babɛtaki bango. Victor, mwasi na ye mpe bandeko mosusu babɛtamaki mpenza, kasi nsukansuka bakimaki.

Pɔsɔ misato liboso akufa, na lisolo oyo abɛtaki, Dorothy alobi ete sanza zomi nsima ya ekateli, Batatoli 75 bakɔtaki bɔlɔkɔ na Connersville mpo bakoselaki bango makambo ete basali likita mabe. Dorothy alobi: “Bakangaki Batatoli ebele, mpe ezalaki na ntango ya makambo ya Connersville nde tonyokwamaki makasi mpenza.”

Hayden Covington, Victor Schmidt mpe bandeko mosusu bakobaki kokɔtela na batribinale bonsomi ya bana-mboka ya Batatoli ya Yehova. Covington ná Schmidt balongaki kokweisa bikatali oyo ezwamaki na Connersville, mpe Covington azalaki elongo na Schmidt ntango azalaki kosamba na batribinale na mboka yango. Lokola Dorothy asalisaki Hayden na makambo ya kosamba, bakómaki baninga mpe babalanaki na 1949.

Na Biro monene ya Batatoli ya Yehova

Dorothy ná Hayden Covington

Dorothy akendaki na New York mpo na kosalisa Hayden na mosala monene oyo azalaki na yango na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na New York, mpe amipesaki na mosala ya kosakola ntango Hayden azalaki kosamba na batribinale. Lokola Covington ayebanaki lokola avoka moko ya mayele mpenza, amipesaki mobimba na kosamba na batribinale mpo na kokɔtela bonsomi ya bana-mboka ya Batatoli ya Yehova. Asambaki mbala koleka 40 na Tribinale monene mpe mbala koleka 100 na batribinale ya mike.

Dorothy azalaki elongo na Hayden na Tribinale monene ntango asambaki mpo na Batatoli ya Yehova ya États-Unis. Dorothy alobi: “Hayden azalaki kosamba mpo na bonsomi oyo ebongi moto nyonso azala na yango. Nakanisi ete ezali mpenza malamu ndenge alekisaki bomoi na ye na kosalisa baoyo bazali na bosɛnga, kaka na États-Unis te kasi mpe bisika mosusu.”

Libota mpe mosala ya kosakola

Na 1959, Dorothy ná Hayden babotaki mwana ya mwasi bapesaki ye nkombo Lynn, mpe nsima ya mbula misato babotaki mwana mobali, babengaki ye Lane. Nsukansuka, na 1972, balongwaki na New York mpe bazongaki na Ohio. Ntango bana bazalaki kokola, Dorothy amipesaki na koteya bango makambo ya Biblia mpe na kosakola.

Hayden akufaki na mokolo ya 21/11/1978. Dorothy azongelaki mosala na ye ya kobɛta masini. Asalaki mpo na bazulunalo mingi mpe mpo na The Cincinnati Enquirer. Mosala abandaki kosala ezalaki makasi mingi, bazalaki kobenga yango “mosala ya mibali” mpo esengelaki kokɔtisa mabende na masini mpo na kobimisa makomi. Ntango Dorothy atikaki kosala na 1988, amipesaki lisusu na koteya bato makambo ya Biblia. Ayebanaki lokola mosakoli ya molende , oyo ayebaki Biblia malamu, mpe oyo azalaki na mayele ya kosalela bavɛrsɛ oyo ebongi mpo na kopesa biyano na mituna.

Lane, mwana ya Dorothy ya mobali akufaki; atikalaki kaka na mwana na ye ya mwasi, Lynn Elfers; Mobali ya mwana na ye, Gary Elfers; bankɔkɔ na ye mibale; mpe leki na bango ya mwasi, Ruth Sennett.